د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو

د مخ نمبر:close

external-link copy
30 : 2

وَإِذۡ قَالَ رَبُّكَ لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِنِّي جَاعِلٞ فِي ٱلۡأَرۡضِ خَلِيفَةٗۖ قَالُوٓاْ أَتَجۡعَلُ فِيهَا مَن يُفۡسِدُ فِيهَا وَيَسۡفِكُ ٱلدِّمَآءَ وَنَحۡنُ نُسَبِّحُ بِحَمۡدِكَ وَنُقَدِّسُ لَكَۖ قَالَ إِنِّيٓ أَعۡلَمُ مَا لَا تَعۡلَمُونَ

30. Mpe tango Nkolo wa yo alobaki na ba anzelu ete: Ya sôló ngai nalingi kotia na mabele mokitani. Bayanolaki ete: Olingi otia kati na mabele oyo akobebisa mpe akosopa makila? Mpe biso tozali kokumisa yo mpe tozali kokumisa bosantu bwayo. (Allah) alobaki ete: Ya sôló ngai nazali na boyebi na maye bino boyebi te. info
التفاسير:

external-link copy
31 : 2

وَعَلَّمَ ءَادَمَ ٱلۡأَسۡمَآءَ كُلَّهَا ثُمَّ عَرَضَهُمۡ عَلَى ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ فَقَالَ أَنۢبِـُٔونِي بِأَسۡمَآءِ هَٰٓؤُلَآءِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

31. Mpe atangisaki Âdam bankombo ya bikelamu binso, nsima atiaki yango liboso ya ba anzelu mpe alobaki: Botangela ngai bankombo ya bikelamu biye soki ya sôló bozali na bosembo. info
التفاسير:

external-link copy
32 : 2

قَالُواْ سُبۡحَٰنَكَ لَا عِلۡمَ لَنَآ إِلَّا مَا عَلَّمۡتَنَآۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ

32. Bayanoli: Lokumu nayo! Tozali na boyebi te kaka na maye otangisaki biso. Ya sôló yo ozali moyebi ya manso mpe otondi na bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
33 : 2

قَالَ يَٰٓـَٔادَمُ أَنۢبِئۡهُم بِأَسۡمَآئِهِمۡۖ فَلَمَّآ أَنۢبَأَهُم بِأَسۡمَآئِهِمۡ قَالَ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ إِنِّيٓ أَعۡلَمُ غَيۡبَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَأَعۡلَمُ مَا تُبۡدُونَ وَمَا كُنتُمۡ تَكۡتُمُونَ

33. Alobaki: Eh Âdam! tangela bango bankombo ya bikelamu biye. Mpe na tango atangelaki bango bankombo na yango, (Allah) alobaki: Nayebisaki bino te ete ya sôló ngai nayebi mabombami ya likolo na ya nsé mpe nayebi maye bobimisaka polele na maye bobombaka? info
التفاسير:

external-link copy
34 : 2

وَإِذۡ قُلۡنَا لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ ٱسۡجُدُواْ لِأٓدَمَ فَسَجَدُوٓاْ إِلَّآ إِبۡلِيسَ أَبَىٰ وَٱسۡتَكۡبَرَ وَكَانَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ

34. Mpe na tango toyebisaki na ba anzelu bogumbamela Âdam, banso bagumbamaki longola sé ibilisi(1) oyo atondisamaki na lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi. info

1 Satana.

التفاسير:

external-link copy
35 : 2

وَقُلۡنَا يَٰٓـَٔادَمُ ٱسۡكُنۡ أَنتَ وَزَوۡجُكَ ٱلۡجَنَّةَ وَكُلَا مِنۡهَا رَغَدًا حَيۡثُ شِئۡتُمَا وَلَا تَقۡرَبَا هَٰذِهِ ٱلشَّجَرَةَ فَتَكُونَا مِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ

35. Mpe tolobaki: Eh Âdam! Fanda na mwasi nayo okati ya lola, mpe bolia binso biye bokolinga, mpe bobeleme te penepene na nzete oyo, soki bobelemi penepene na yango bokozala elongo ya babubi. info
التفاسير:

external-link copy
36 : 2

فَأَزَلَّهُمَا ٱلشَّيۡطَٰنُ عَنۡهَا فَأَخۡرَجَهُمَا مِمَّا كَانَا فِيهِۖ وَقُلۡنَا ٱهۡبِطُواْ بَعۡضُكُمۡ لِبَعۡضٍ عَدُوّٞۖ وَلَكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُسۡتَقَرّٞ وَمَتَٰعٌ إِلَىٰ حِينٖ

36. Mpe na sima satana akosaki bango mpe abimisaki bango o esika eye bazwamaki. Mpe tolobaki bokita bino na bino bokozala banguna mpe bokozala o mabele na bisengo ya ngonga moke. info
التفاسير:

external-link copy
37 : 2

فَتَلَقَّىٰٓ ءَادَمُ مِن رَّبِّهِۦ كَلِمَٰتٖ فَتَابَ عَلَيۡهِۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ

37. Mpe Âdam azuaki maloba ya bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe (Allah) alimbisaki ye, ya sôló ye azali moyoki tubela mpe atonda ngolu. info
التفاسير: