د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو

د مخ نمبر:close

external-link copy
113 : 2

وَقَالَتِ ٱلۡيَهُودُ لَيۡسَتِ ٱلنَّصَٰرَىٰ عَلَىٰ شَيۡءٖ وَقَالَتِ ٱلنَّصَٰرَىٰ لَيۡسَتِ ٱلۡيَهُودُ عَلَىٰ شَيۡءٖ وَهُمۡ يَتۡلُونَ ٱلۡكِتَٰبَۗ كَذَٰلِكَ قَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ مِثۡلَ قَوۡلِهِمۡۚ فَٱللَّهُ يَحۡكُمُ بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ

113. Mpe bayuda balobaki: Baklisto bazali na eloko te, mpe baklisto balobaki: Bayuda bazali na eloko te, mpe bazali kotanga buku. Ndenge moko na ba oyo bayebi eloko te bazali koloba maloba lokola bango, kasi ya sôló Allah akosambisa bango o mokolo ya suka na maye bazalaki kokabwana. info
التفاسير:

external-link copy
114 : 2

وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّن مَّنَعَ مَسَٰجِدَ ٱللَّهِ أَن يُذۡكَرَ فِيهَا ٱسۡمُهُۥ وَسَعَىٰ فِي خَرَابِهَآۚ أُوْلَٰٓئِكَ مَا كَانَ لَهُمۡ أَن يَدۡخُلُوهَآ إِلَّا خَآئِفِينَۚ لَهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا خِزۡيٞ وَلَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ عَذَابٌ عَظِيمٞ

114. Nani oyo azali mabe koleka moto oyo apekisi ba masâdjid(1) ya Allah, ete batanga nkombo naye na kati, mpe aluki kobebisa yango? Bango wana bazali na ndingisa te ya kokota okati na yango. Longola sé ba oyo bazali kobanga; bakokitisama awa na nsé na kozanga lokumu, mpe o mokolo ya suka bakozala na etumbu enene. info

1 Bisika babondelaka Allah (Nzambe).

التفاسير:

external-link copy
115 : 2

وَلِلَّهِ ٱلۡمَشۡرِقُ وَٱلۡمَغۡرِبُۚ فَأَيۡنَمَا تُوَلُّواْ فَثَمَّ وَجۡهُ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ وَٰسِعٌ عَلِيمٞ

115. Moniele na eloli ezali ya Allah, mpe esika nyoso bokobaluka, bokokuta elongi ya Allah. Ya sôló Allah azali moyebi monene. info
التفاسير:

external-link copy
116 : 2

وَقَالُواْ ٱتَّخَذَ ٱللَّهُ وَلَدٗاۗ سُبۡحَٰنَهُۥۖ بَل لَّهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ كُلّٞ لَّهُۥ قَٰنِتُونَ

116. Mpe balobaki: Allah azali na mwana! bopeto naye! Kasi maye mazali olikolo mpena nsé mazali ya ye; nyoso esengeli kotosa ye. info
التفاسير:

external-link copy
117 : 2

بَدِيعُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَإِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرٗا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ

117. Ye mokeli ya likolo mpe na nsé, mpe tango akani likambo, mpe ya sôló oyo akoloba: yango nde ekozalisama. info
التفاسير:

external-link copy
118 : 2

وَقَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ لَوۡلَا يُكَلِّمُنَا ٱللَّهُ أَوۡ تَأۡتِينَآ ءَايَةٞۗ كَذَٰلِكَ قَالَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِم مِّثۡلَ قَوۡلِهِمۡۘ تَشَٰبَهَتۡ قُلُوبُهُمۡۗ قَدۡ بَيَّنَّا ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يُوقِنُونَ

118. Mpe baye batanga te balobaki ete: Mpona nini Allah asolisi biso (polele) te, too mpe elembo eyela biso? Na boye nde, bato balekaki liboso na bango, bazalaki koloba lolenge ya maloba na bango. Mitema na bango ekomaki na bokokani. Ya sôló tosili kolimbola bilembo mpo bato bazala na kondima. info
التفاسير:

external-link copy
119 : 2

إِنَّآ أَرۡسَلۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ بَشِيرٗا وَنَذِيرٗاۖ وَلَا تُسۡـَٔلُ عَنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡجَحِيمِ

119. Ya sôló, totindaki yo na bosembo, mopesi sango elamu, mpe mokebisi, mpe okotunama te na ntina ya bato ya lifelo. info
التفاسير: