Kilniojo Korano reikšmių vertimas - Vertimas į ngalų k. - Muchamed Balingugu

Puslapio numeris:close

external-link copy
260 : 2

وَإِذۡ قَالَ إِبۡرَٰهِـۧمُ رَبِّ أَرِنِي كَيۡفَ تُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰۖ قَالَ أَوَلَمۡ تُؤۡمِنۖ قَالَ بَلَىٰ وَلَٰكِن لِّيَطۡمَئِنَّ قَلۡبِيۖ قَالَ فَخُذۡ أَرۡبَعَةٗ مِّنَ ٱلطَّيۡرِ فَصُرۡهُنَّ إِلَيۡكَ ثُمَّ ٱجۡعَلۡ عَلَىٰ كُلِّ جَبَلٖ مِّنۡهُنَّ جُزۡءٗا ثُمَّ ٱدۡعُهُنَّ يَأۡتِينَكَ سَعۡيٗاۚ وَٱعۡلَمۡ أَنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٞ

260. Mpe tango Ibrâhîm alobaki ete: Nkolo! lakisa ngai ndenge nini okosekwisa bawa, (Allah) Alobaki ete: Eh Ibrâhîm! naino ondimi te? Alobaki na ndimi, kasi wana ezali mpona kolendisa motema na ngai. (Allah) alobi naye, zua bandeke minei, kata bango biteni biteni, sima tia yango likolo ya bangomba, sima obenga bango bakoyela yo na lombango, mpe yeba ete ya sôló, Allah azali makasi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
261 : 2

مَّثَلُ ٱلَّذِينَ يُنفِقُونَ أَمۡوَٰلَهُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ كَمَثَلِ حَبَّةٍ أَنۢبَتَتۡ سَبۡعَ سَنَابِلَ فِي كُلِّ سُنۢبُلَةٖ مِّاْئَةُ حَبَّةٖۗ وَٱللَّهُ يُضَٰعِفُ لِمَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ وَٰسِعٌ عَلِيمٌ

261. Ndakisa ya baye bazali kobimisa misolo na bango na nzela ya Allah, ezali lokola mbuma elonami sima ebimisi bitape sambo, mpe na etape moko ezali na bambuma nkama moko, mpe Allah abakisaka mbano ebele na oyo ye alingi, mpe Allah azali na ebele ya bozui, azali moyebi koleka. info
التفاسير:

external-link copy
262 : 2

ٱلَّذِينَ يُنفِقُونَ أَمۡوَٰلَهُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ ثُمَّ لَا يُتۡبِعُونَ مَآ أَنفَقُواْ مَنّٗا وَلَآ أَذٗى لَّهُمۡ أَجۡرُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡ وَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ

262. Bato oyo bazali kobimisa misolo na bango na nzela ya Allah, sima balandisi yango te na maloba ya komizua, to maloba ya mabe na maye mabebisi, bazali na lifuta na bango epai na Nkolo wa bango. Bakozala na bobangi te, mpe na koyimayima te. info
التفاسير:

external-link copy
263 : 2

۞ قَوۡلٞ مَّعۡرُوفٞ وَمَغۡفِرَةٌ خَيۡرٞ مِّن صَدَقَةٖ يَتۡبَعُهَآ أَذٗىۗ وَٱللَّهُ غَنِيٌّ حَلِيمٞ

263. Liloba ya kitoko mpe bolimbisi, ezali malamu koleka likabo liye lilandisami na liloba ya mabe. Allah azali na bosenga na eloko te, mpe atonda bolamu. info
التفاسير:

external-link copy
264 : 2

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تُبۡطِلُواْ صَدَقَٰتِكُم بِٱلۡمَنِّ وَٱلۡأَذَىٰ كَٱلَّذِي يُنفِقُ مَالَهُۥ رِئَآءَ ٱلنَّاسِ وَلَا يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِۖ فَمَثَلُهُۥ كَمَثَلِ صَفۡوَانٍ عَلَيۡهِ تُرَابٞ فَأَصَابَهُۥ وَابِلٞ فَتَرَكَهُۥ صَلۡدٗاۖ لَّا يَقۡدِرُونَ عَلَىٰ شَيۡءٖ مِّمَّا كَسَبُواْۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡكَٰفِرِينَ

264. Eh Bino bandimi! bobebisa mabonza na bino te na kolandisa yango na maloba mabe, mpe na monyokoli, lokola moto oyo azali kobimisa mosolo naye mpo bato bamona ye mpe ye andimi na Allah te, andimi mpe na mokolo ya suka te. Ndakisa naye moto wana ezali lokola libanga monene ezipami na zelo, mpe tango mbula ya makasi enoki, etiolisi zelo nyoso mpe etiki libanga mpamba. Bango(1) bakozua lifuta moko te na maye babimisaki na mabonza, mpe Allah akokamba te bato oyo basili kopengwa. info

1 Kasi na sima na bango te.

التفاسير: