ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
3 : 5

حُرِّمَتۡ عَلَيۡكُمُ ٱلۡمَيۡتَةُ وَٱلدَّمُ وَلَحۡمُ ٱلۡخِنزِيرِ وَمَآ أُهِلَّ لِغَيۡرِ ٱللَّهِ بِهِۦ وَٱلۡمُنۡخَنِقَةُ وَٱلۡمَوۡقُوذَةُ وَٱلۡمُتَرَدِّيَةُ وَٱلنَّطِيحَةُ وَمَآ أَكَلَ ٱلسَّبُعُ إِلَّا مَا ذَكَّيۡتُمۡ وَمَا ذُبِحَ عَلَى ٱلنُّصُبِ وَأَن تَسۡتَقۡسِمُواْ بِٱلۡأَزۡلَٰمِۚ ذَٰلِكُمۡ فِسۡقٌۗ ٱلۡيَوۡمَ يَئِسَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن دِينِكُمۡ فَلَا تَخۡشَوۡهُمۡ وَٱخۡشَوۡنِۚ ٱلۡيَوۡمَ أَكۡمَلۡتُ لَكُمۡ دِينَكُمۡ وَأَتۡمَمۡتُ عَلَيۡكُمۡ نِعۡمَتِي وَرَضِيتُ لَكُمُ ٱلۡإِسۡلَٰمَ دِينٗاۚ فَمَنِ ٱضۡطُرَّ فِي مَخۡمَصَةٍ غَيۡرَ مُتَجَانِفٖ لِّإِثۡمٖ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ

3. Epekisami likolo na bino (kolia) nyama oyo ekufi yango moko, mpe makila, mpe mosuni ya ngulu, mpe oyo babomi na nkombo ya Allah te, mpe oyo ekufi na kokamola kingo, mpe oyo babeti yango (na nzete to libanga), mpe oyo ekwei kowuta likolo, mpe oyo ba bundi na maseke na bango kino liwa, mpe oyo ba nyama ya mino balei, longola sé bokuti yango naino ekufi te, mpe bokati yango kingo, mpe oyo ekatami mpona bikeko, mpe kobendana na makonga mpona koyeba mambi na bino ya mabombami, nyoso wana ezali mabe. Boyeba ete lelo bapagano bazangi elikia na lingomba na bino, na yango bobanga bango te kasi bobanga nde ngai. Lelo nakokisi lingomba na bino, mpe natondisi bolamu na ngai likolo na bino, mpe naponeli bino lingomba na nkombo ya islam (komisokia). Kasi oyo kati na bino akwei na nzala makasi mpe etindi ye alia bilei biye bipekisami na likanisi ya kosumuka te, ya sôló Allah azali molimbisi atonda mawa. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 5

يَسۡـَٔلُونَكَ مَاذَآ أُحِلَّ لَهُمۡۖ قُلۡ أُحِلَّ لَكُمُ ٱلطَّيِّبَٰتُ وَمَا عَلَّمۡتُم مِّنَ ٱلۡجَوَارِحِ مُكَلِّبِينَ تُعَلِّمُونَهُنَّ مِمَّا عَلَّمَكُمُ ٱللَّهُۖ فَكُلُواْ مِمَّآ أَمۡسَكۡنَ عَلَيۡكُمۡ وَٱذۡكُرُواْ ٱسۡمَ ٱللَّهِ عَلَيۡهِۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ

4. Bazali kotuna yo mpona maye elingisami mpo na bango. Loba na bango ete: Elingisami mpo na bino bilei ya malamu, mpe bibwele bozali na yango na maboko (lokola ba mbwa) ya bokila, botangisa bango lolenge ya kokanga nyama lolenge Allah alakisaki bino. Soki bakangeli bino nyama, botanga nkombo ya Allah likolo na yango yambo ya kolia, mpe bobanga Allah, mpamba te ya sôló, azali na lombango mpona kofuta mbano. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 5

ٱلۡيَوۡمَ أُحِلَّ لَكُمُ ٱلطَّيِّبَٰتُۖ وَطَعَامُ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ حِلّٞ لَّكُمۡ وَطَعَامُكُمۡ حِلّٞ لَّهُمۡۖ وَٱلۡمُحۡصَنَٰتُ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ وَٱلۡمُحۡصَنَٰتُ مِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ مِن قَبۡلِكُمۡ إِذَآ ءَاتَيۡتُمُوهُنَّ أُجُورَهُنَّ مُحۡصِنِينَ غَيۡرَ مُسَٰفِحِينَ وَلَا مُتَّخِذِيٓ أَخۡدَانٖۗ وَمَن يَكۡفُرۡ بِٱلۡإِيمَٰنِ فَقَدۡ حَبِطَ عَمَلُهُۥ وَهُوَ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ مِنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ

5. Lelo bozali na ndingisa ya kolia bilei ya malamu, mpe bozali na ndingisa ya kolia bilei ya baye bazuaki buku, bango mpe bazali na ndingisa ya kolia bilei na bino. Mpe lisusu bozali na ndingisa ya kobala basi ya malamu kati na bandimi, mpe basi ya malamu kati ya baye bazuaki buku liboso na bino, soki bopesi bango misolo na bango ya libala na lolenge ya malamu, kasi na potopoto ya ekobo te, kasi oyo akopengwa na bondimi, ye wana mosala naye esili kobebisama, mpe o mokolo ya suka akozala elongo na bazangi. info
التفاسير: