ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
91 : 5

إِنَّمَا يُرِيدُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَن يُوقِعَ بَيۡنَكُمُ ٱلۡعَدَٰوَةَ وَٱلۡبَغۡضَآءَ فِي ٱلۡخَمۡرِ وَٱلۡمَيۡسِرِ وَيَصُدَّكُمۡ عَن ذِكۡرِ ٱللَّهِ وَعَنِ ٱلصَّلَوٰةِۖ فَهَلۡ أَنتُم مُّنتَهُونَ

91. Ya sôló, satana alingi kotia kati na bino koyinana mpe kosuana kowuta na masanga mpe masano ya mabe, mpe apekisa bino losambo mpe bokanisi Allah, boye bokotika yango? info
التفاسير:

external-link copy
92 : 5

وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُواْ ٱلرَّسُولَ وَٱحۡذَرُواْۚ فَإِن تَوَلَّيۡتُمۡ فَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّمَا عَلَىٰ رَسُولِنَا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ

92. Mpe botosa Allah mpe botosa motindami mpe bokeba! Mpe soki bopesi mikongo, mpe boyeba ete ya sôló, motindami na biso azali na eloko mosusu te sé akomisa sango ya polele. info
التفاسير:

external-link copy
93 : 5

لَيۡسَ عَلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ جُنَاحٞ فِيمَا طَعِمُوٓاْ إِذَا مَا ٱتَّقَواْ وَّءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ ثُمَّ ٱتَّقَواْ وَّءَامَنُواْ ثُمَّ ٱتَّقَواْ وَّأَحۡسَنُواْۚ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلۡمُحۡسِنِينَ

93. Ezali lisumu te likolo na baye bandimi mpe basali misala ya malamu kowuta na oyo baliaki, soki babangi mpe bandimi mpe basali misala ya malamu, sima babangi lisusu mpe bandimi mpe babangi mpe babongisi, Allah alingaka babongisi. info
التفاسير:

external-link copy
94 : 5

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَيَبۡلُوَنَّكُمُ ٱللَّهُ بِشَيۡءٖ مِّنَ ٱلصَّيۡدِ تَنَالُهُۥٓ أَيۡدِيكُمۡ وَرِمَاحُكُمۡ لِيَعۡلَمَ ٱللَّهُ مَن يَخَافُهُۥ بِٱلۡغَيۡبِۚ فَمَنِ ٱعۡتَدَىٰ بَعۡدَ ذَٰلِكَ فَلَهُۥ عَذَابٌ أَلِيمٞ

94. Eh bino bandimi! Allah akomeka bino na bokila, banyama bokoboma na maboko na bino mpe na makonga (to mandoki) na bino, mpo ete Allah ayeba nani kati na bino azali kobanga Allah na kobombana, oyo kati na bino akolekisa ndelo sima likambo oyo akozala na etumbu ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
95 : 5

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَقۡتُلُواْ ٱلصَّيۡدَ وَأَنتُمۡ حُرُمٞۚ وَمَن قَتَلَهُۥ مِنكُم مُّتَعَمِّدٗا فَجَزَآءٞ مِّثۡلُ مَا قَتَلَ مِنَ ٱلنَّعَمِ يَحۡكُمُ بِهِۦ ذَوَا عَدۡلٖ مِّنكُمۡ هَدۡيَۢا بَٰلِغَ ٱلۡكَعۡبَةِ أَوۡ كَفَّٰرَةٞ طَعَامُ مَسَٰكِينَ أَوۡ عَدۡلُ ذَٰلِكَ صِيَامٗا لِّيَذُوقَ وَبَالَ أَمۡرِهِۦۗ عَفَا ٱللَّهُ عَمَّا سَلَفَۚ وَمَنۡ عَادَ فَيَنتَقِمُ ٱللَّهُ مِنۡهُۚ وَٱللَّهُ عَزِيزٞ ذُو ٱنتِقَامٍ

95. Eh bino bandimi! Bosala bokila te na tango ya kobulisama.(1) Oyo akoboma nyama na tango wana na nko, lifuta naye ekozala apesa nyama ya bomoyi ndenge moko lokola oyo ye abomaki, bato mibale ya bosembo mpe ya mayele kati na bino bakata makambo yango, ekozala mbeka ekoma na ndako esantu ya Makkah mpona koleisa babola na yango, to mpe tubela ete aleisa babola to mpe lisusu akanga ngizi na mikolo mikoki na motuya ya nyama wana, na bongo mpo ayeba mpe ayoka ntina na lisumu naye. Allah asili kolimbisa oyo eleki, kasi oyo akozongela yango, Allah akopesa ye etumbu, Allah azali na nguya, azali na bokonzi nyoso ya kopesa etumbu. info

1 Bótala na suratu oyo kaka mokapo: 1.

التفاسير: