ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
137 : 26

إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا خُلُقُ ٱلۡأَوَّلِينَ

137. Ezali sé ezaleli ya bato ya kala. info
التفاسير:

external-link copy
138 : 26

وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ

138. Mpe tokozuaka etumbu te. info
التفاسير:

external-link copy
139 : 26

فَكَذَّبُوهُ فَأَهۡلَكۡنَٰهُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

139. Baboyaki kondimela ye, mpe tobomaki bango, ya soló wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te. info
التفاسير:

external-link copy
140 : 26

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

140. Mpe ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
141 : 26

كَذَّبَتۡ ثَمُودُ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

141. Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami. info
التفاسير:

external-link copy
142 : 26

إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ صَٰلِحٌ أَلَا تَتَّقُونَ

142. Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te? info
التفاسير:

external-link copy
143 : 26

إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ

143. Nazali motindami malamu epai na bino. info
التفاسير:

external-link copy
144 : 26

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

144. Bobanga Allah mpe botosa ngai. info
التفاسير:

external-link copy
145 : 26

وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

145. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo. info
التفاسير:

external-link copy
146 : 26

أَتُتۡرَكُونَ فِي مَا هَٰهُنَآ ءَامِنِينَ

146. Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala, info
التفاسير:

external-link copy
147 : 26

فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ

147. O kati ya bilanga mpe mingala? info
التفاسير:

external-link copy
148 : 26

وَزُرُوعٖ وَنَخۡلٖ طَلۡعُهَا هَضِيمٞ

148. Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko, info
التفاسير:

external-link copy
149 : 26

وَتَنۡحِتُونَ مِنَ ٱلۡجِبَالِ بُيُوتٗا فَٰرِهِينَ

149. Boye bozali kotonga bandako o likolo lia ba ngomba? info
التفاسير:

external-link copy
150 : 26

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

150. Bobanga Allah mpe botosa ngai. info
التفاسير:

external-link copy
151 : 26

وَلَا تُطِيعُوٓاْ أَمۡرَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ

151. Kasi botosa makambo ya balekisi ndelo te, info
التفاسير:

external-link copy
152 : 26

ٱلَّذِينَ يُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا يُصۡلِحُونَ

152. Baye bazali sé kobebisa o kati ya mabele mpe balingi kobongisa te. info
التفاسير:

external-link copy
153 : 26

قَالُوٓاْ إِنَّمَآ أَنتَ مِنَ ٱلۡمُسَحَّرِينَ

153. Balobi: Ya soló, ozali sé o kati ya balokami. info
التفاسير:

external-link copy
154 : 26

مَآ أَنتَ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُنَا فَأۡتِ بِـَٔايَةٍ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

154. Ozali sé moto lokola biso, yaka na elembo soki ozali kati ya balobi bosôló. info
التفاسير:

external-link copy
155 : 26

قَالَ هَٰذِهِۦ نَاقَةٞ لَّهَا شِرۡبٞ وَلَكُمۡ شِرۡبُ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ

155. Alobi: Nâqah(1) oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi. info

1 Náqah: Bótala suratu Al-A’ráf mokapo: 74.

التفاسير:

external-link copy
156 : 26

وَلَا تَمَسُّوهَا بِسُوٓءٖ فَيَأۡخُذَكُمۡ عَذَابُ يَوۡمٍ عَظِيمٖ

156. Mpe bosala ye mabe te, noki te, etumbu monene ekozua bino mokolo moko boye. info
التفاسير:

external-link copy
157 : 26

فَعَقَرُوهَا فَأَصۡبَحُواْ نَٰدِمِينَ

157. Kasi babomaki ye, mpe na sima bakomaki kolela. info
التفاسير:

external-link copy
158 : 26

فَأَخَذَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ

158. Mpe topesaki bango etumbu, wana ezali elembo kasi ebele na bango bazalaki kondima te. info
التفاسير:

external-link copy
159 : 26

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

159. Mpe Nkolo wayo azali ya sólo na bokasi atonda ngolu. info
التفاسير: