ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
207 : 26

مَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يُمَتَّعُونَ

207. Esengo eye bazalaki na yango esalisaki bango na eloko te. info
التفاسير:

external-link copy
208 : 26

وَمَآ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةٍ إِلَّا لَهَا مُنذِرُونَ

208. Mpe tobomaka mboka te, sé totinda bakebisi liboso. info
التفاسير:

external-link copy
209 : 26

ذِكۡرَىٰ وَمَا كُنَّا ظَٰلِمِينَ

209. (Mpona) kokebisa, mpe tozali babubi te. info
التفاسير:

external-link copy
210 : 26

وَمَا تَنَزَّلَتۡ بِهِ ٱلشَّيَٰطِينُ

210. Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani). info
التفاسير:

external-link copy
211 : 26

وَمَا يَنۢبَغِي لَهُمۡ وَمَا يَسۡتَطِيعُونَ

211. Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te. info
التفاسير:

external-link copy
212 : 26

إِنَّهُمۡ عَنِ ٱلسَّمۡعِ لَمَعۡزُولُونَ

212. (Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka. info
التفاسير:

external-link copy
213 : 26

فَلَا تَدۡعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَتَكُونَ مِنَ ٱلۡمُعَذَّبِينَ

213. Mpe kobondela nzambe mosusu te elongo na Allah, noki te okozuama 0 kati ya bato ya etumbu. info
التفاسير:

external-link copy
214 : 26

وَأَنذِرۡ عَشِيرَتَكَ ٱلۡأَقۡرَبِينَ

214. Mpe kebisa libota nayo ya pene. info
التفاسير:

external-link copy
215 : 26

وَٱخۡفِضۡ جَنَاحَكَ لِمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

215. Mpe kitisa mapeka nayo (zala malamu) mpona bandimi oyo bazali kolanda yo. info
التفاسير:

external-link copy
216 : 26

فَإِنۡ عَصَوۡكَ فَقُلۡ إِنِّي بَرِيٓءٞ مِّمَّا تَعۡمَلُونَ

216. Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala. info
التفاسير:

external-link copy
217 : 26

وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱلۡعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ

217. Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa. info
التفاسير:

external-link copy
218 : 26

ٱلَّذِي يَرَىٰكَ حِينَ تَقُومُ

218. Oyo amonaka yo tango otelemaka, info
التفاسير:

external-link copy
219 : 26

وَتَقَلُّبَكَ فِي ٱلسَّٰجِدِينَ

219. Mpe (amonaka) yo tango ogumbamaka. info
التفاسير:

external-link copy
220 : 26

إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ

220. Ya soló, ye azali moyoki mpe moyebi. info
التفاسير:

external-link copy
221 : 26

هَلۡ أُنَبِّئُكُمۡ عَلَىٰ مَن تَنَزَّلُ ٱلشَّيَٰطِينُ

221. Boye nayebisa bino epai ya nani basatana bazali kokita? info
التفاسير:

external-link copy
222 : 26

تَنَزَّلُ عَلَىٰ كُلِّ أَفَّاكٍ أَثِيمٖ

222. Bazali kokita epai ya bato ya lokuta basumuki. info
التفاسير:

external-link copy
223 : 26

يُلۡقُونَ ٱلسَّمۡعَ وَأَكۡثَرُهُمۡ كَٰذِبُونَ

223. Batiyaka matoyi kasi ebele na bango bazali bakosi. info
التفاسير:

external-link copy
224 : 26

وَٱلشُّعَرَآءُ يَتَّبِعُهُمُ ٱلۡغَاوُۥنَ

224. Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga. info
التفاسير:

external-link copy
225 : 26

أَلَمۡ تَرَ أَنَّهُمۡ فِي كُلِّ وَادٖ يَهِيمُونَ

225. Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale?) info
التفاسير:

external-link copy
226 : 26

وَأَنَّهُمۡ يَقُولُونَ مَا لَا يَفۡعَلُونَ

226. Mpe ya sólo, bango balobaka maye basalaka te, info
التفاسير:

external-link copy
227 : 26

إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَذَكَرُواْ ٱللَّهَ كَثِيرٗا وَٱنتَصَرُواْ مِنۢ بَعۡدِ مَا ظُلِمُواْۗ وَسَيَعۡلَمُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ أَيَّ مُنقَلَبٖ يَنقَلِبُونَ

227. Longola sé baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kokumisa Allah mingi, mpe bamisalisi na kopamela mabe ya babubi, kasi babubi bakoyebaka kala mingi te ba nani ekobebela bango. info
التفاسير: