クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo

Al-Muddathir

external-link copy
1 : 74

يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمُدَّثِّرُ

1. Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti! info
التفاسير:

external-link copy
2 : 74

قُمۡ فَأَنذِرۡ

2. Telema mpe kebisa! info
التفاسير:

external-link copy
3 : 74

وَرَبَّكَ فَكَبِّرۡ

3. Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene! info
التفاسير:

external-link copy
4 : 74

وَثِيَابَكَ فَطَهِّرۡ

4. Mpe petóla bilamba nayo, info
التفاسير:

external-link copy
5 : 74

وَٱلرُّجۡزَ فَٱهۡجُرۡ

5. Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango)! info
التفاسير:

external-link copy
6 : 74

وَلَا تَمۡنُن تَسۡتَكۡثِرُ

6. Mpe kopesa te mpo bafuta yo! info
التفاسير:

external-link copy
7 : 74

وَلِرَبِّكَ فَٱصۡبِرۡ

7. Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo! info
التفاسير:

external-link copy
8 : 74

فَإِذَا نُقِرَ فِي ٱلنَّاقُورِ

8. Mpe tango bakofula kelelo, info
التفاسير:

external-link copy
9 : 74

فَذَٰلِكَ يَوۡمَئِذٖ يَوۡمٌ عَسِيرٌ

9. Wana ekozala mokolo ya mpasi, info
التفاسير:

external-link copy
10 : 74

عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ غَيۡرُ يَسِيرٖ

10. Mpona bapengwi ekozala mpete te. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 74

ذَرۡنِي وَمَنۡ خَلَقۡتُ وَحِيدٗا

11. Tika ngai na oyo nakeli ye moko, info
التفاسير:

external-link copy
12 : 74

وَجَعَلۡتُ لَهُۥ مَالٗا مَّمۡدُودٗا

12. Mpe oyo napesaki misolo ebele, info
التفاسير:

external-link copy
13 : 74

وَبَنِينَ شُهُودٗا

13. Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso; info
التفاسير:

external-link copy
14 : 74

وَمَهَّدتُّ لَهُۥ تَمۡهِيدٗا

14. Mpe oyo nalongolelaki mindondo nyoso. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 74

ثُمَّ يَطۡمَعُ أَنۡ أَزِيدَ

15. Sima, apengwi na bolamu (na ngai), info
التفاسير:

external-link copy
16 : 74

كَلَّآۖ إِنَّهُۥ كَانَ لِأٓيَٰتِنَا عَنِيدٗا

16. Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 74

سَأُرۡهِقُهُۥ صَعُودًا

17. Nakopesa ye pasi ya koleka. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 74

إِنَّهُۥ فَكَّرَ وَقَدَّرَ

18. Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano, info
التفاسير:

external-link copy
19 : 74

فَقُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ

19. Akufa na ndenge akanaki. info
التفاسير:

external-link copy
20 : 74

ثُمَّ قُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ

20. Sima akufa na ndenge akanaki. info
التفاسير:

external-link copy
21 : 74

ثُمَّ نَظَرَ

21. Sima atalaki. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 74

ثُمَّ عَبَسَ وَبَسَرَ

22. Sima abebisi elongi mpe akangi. info
التفاسير:

external-link copy
23 : 74

ثُمَّ أَدۡبَرَ وَٱسۡتَكۡبَرَ

23. Sima abongoli mokongo mpe asali lolendo. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 74

فَقَالَ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ يُؤۡثَرُ

24. Mpe alobi: (Kurani) oyo ezali bonganga oyo etangisami, info
التفاسير:

external-link copy
25 : 74

إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا قَوۡلُ ٱلۡبَشَرِ

25. Wana ezali sé liloba lia moto. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 74

سَأُصۡلِيهِ سَقَرَ

26. Nakozikisa ye na moto ya saqar. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 74

وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا سَقَرُ

27. Nani akoyebisa yo nini saqar? info
التفاسير:

external-link copy
28 : 74

لَا تُبۡقِي وَلَا تَذَرُ

28. Etiki eloko te mpe ebateli te. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 74

لَوَّاحَةٞ لِّلۡبَشَرِ

29. Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 74

عَلَيۡهَا تِسۡعَةَ عَشَرَ

30. O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua. info
التفاسير:

external-link copy
31 : 74

وَمَا جَعَلۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلنَّارِ إِلَّا مَلَٰٓئِكَةٗۖ وَمَا جَعَلۡنَا عِدَّتَهُمۡ إِلَّا فِتۡنَةٗ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ لِيَسۡتَيۡقِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَيَزۡدَادَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِيمَٰنٗا وَلَا يَرۡتَابَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَلِيَقُولَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ وَٱلۡكَٰفِرُونَ مَاذَآ أَرَادَ ٱللَّهُ بِهَٰذَا مَثَلٗاۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُۚ وَمَا يَعۡلَمُ جُنُودَ رَبِّكَ إِلَّا هُوَۚ وَمَا هِيَ إِلَّا ذِكۡرَىٰ لِلۡبَشَرِ

31. Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato. info
التفاسير:

external-link copy
32 : 74

كَلَّا وَٱلۡقَمَرِ

32. Te; (nalapi) na sanza. info
التفاسير:

external-link copy
33 : 74

وَٱلَّيۡلِ إِذۡ أَدۡبَرَ

33. Mpe butu tango elalaka. info
التفاسير:

external-link copy
34 : 74

وَٱلصُّبۡحِ إِذَآ أَسۡفَرَ

34. Mpe tongo tango etanaka. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 74

إِنَّهَا لَإِحۡدَى ٱلۡكُبَرِ

35. (Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
36 : 74

نَذِيرٗا لِّلۡبَشَرِ

36. Ezali bokundoli тропа bato, info
التفاسير:

external-link copy
37 : 74

لِمَن شَآءَ مِنكُمۡ أَن يَتَقَدَّمَ أَوۡ يَتَأَخَّرَ

37. Oyo akolinga okati na bino, alanda yango to azonga sima. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 74

كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡ رَهِينَةٌ

38. Molimo nyoso akozua oyo asalaki, info
التفاسير:

external-link copy
39 : 74

إِلَّآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡيَمِينِ

39. Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi), info
التفاسير:

external-link copy
40 : 74

فِي جَنَّٰتٖ يَتَسَآءَلُونَ

40. (Bakozalaka) na lola bakomitunama, info
التفاسير:

external-link copy
41 : 74

عَنِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ

41. (Mpona) batomboki. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 74

مَا سَلَكَكُمۡ فِي سَقَرَ

42. Eloko nini ekotisi bino na saqar? info
التفاسير:

external-link copy
43 : 74

قَالُواْ لَمۡ نَكُ مِنَ ٱلۡمُصَلِّينَ

43. Bakolobaka: Tozalaki kosambela te. info
التفاسير:

external-link copy
44 : 74

وَلَمۡ نَكُ نُطۡعِمُ ٱلۡمِسۡكِينَ

44. Mpe tozalaki koleisa babola te. info
التفاسير:

external-link copy
45 : 74

وَكُنَّا نَخُوضُ مَعَ ٱلۡخَآئِضِينَ

45. Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 74

وَكُنَّا نُكَذِّبُ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ

46. Mpe tozalaki kondima тропа mokolo ya suka te, info
التفاسير:

external-link copy
47 : 74

حَتَّىٰٓ أَتَىٰنَا ٱلۡيَقِينُ

47. Kino liwa liyelaki biso. info
التفاسير:

external-link copy
48 : 74

فَمَا تَنفَعُهُمۡ شَفَٰعَةُ ٱلشَّٰفِعِينَ

48. Bolobeli ya balobeli ekosalisaka bango te. info
التفاسير:

external-link copy
49 : 74

فَمَا لَهُمۡ عَنِ ٱلتَّذۡكِرَةِ مُعۡرِضِينَ

49. Mpona nini bapesaki bokundoli mokongo? info
التفاسير:

external-link copy
50 : 74

كَأَنَّهُمۡ حُمُرٞ مُّسۡتَنفِرَةٞ

50. Bakomi lokola humuru(1) ya kopanzana, info

1 Humuru: Ezali oboyiké ya nkombo himâr: Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 259.

التفاسير:

external-link copy
51 : 74

فَرَّتۡ مِن قَسۡوَرَةِۭ

51. Tango bazali kokima nkosi. info
التفاسير:

external-link copy
52 : 74

بَلۡ يُرِيدُ كُلُّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُمۡ أَن يُؤۡتَىٰ صُحُفٗا مُّنَشَّرَةٗ

52. Nyoso kati na bango azali koluka azua mokanda mpo ayeba. info
التفاسير:

external-link copy
53 : 74

كَلَّاۖ بَل لَّا يَخَافُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ

53. Ah kasi te! Bazalaki kobanga mokolo ya suka te. info
التفاسير:

external-link copy
54 : 74

كَلَّآ إِنَّهُۥ تَذۡكِرَةٞ

54. Ah te! Oyo ezali ya soló bokundoli, info
التفاسير:

external-link copy
55 : 74

فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ

55. Oyo alingi akanisa. info
التفاسير:

external-link copy
56 : 74

وَمَا يَذۡكُرُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ هُوَ أَهۡلُ ٱلتَّقۡوَىٰ وَأَهۡلُ ٱلۡمَغۡفِرَةِ

56. Mpe bakokanisaka te sé Allah alinga. Ye nde esengeli babanga mpe ye nde Nkolo bolimbisi. atonda ngolu info
التفاسير: