クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo

ページ番号:close

external-link copy
37 : 5

يُرِيدُونَ أَن يَخۡرُجُواْ مِنَ ٱلنَّارِ وَمَا هُم بِخَٰرِجِينَ مِنۡهَاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ مُّقِيمٞ

37. Bakolingaka kobima okati ya moto, kasi, bakokoka kobima kati na yango te mpe bakozalaka na etumbu ya libela. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 5

وَٱلسَّارِقُ وَٱلسَّارِقَةُ فَٱقۡطَعُوٓاْ أَيۡدِيَهُمَا جَزَآءَۢ بِمَا كَسَبَا نَكَٰلٗا مِّنَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٞ

38. Moyibi ya mobali na moyibi ya mwasi, bokata maboko na bango mibale mpona maye basalaki. Mpe ezala lokola etumbu kowuta epaï ya Allah. Mpe Allah azali na nguya atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 5

فَمَن تَابَ مِنۢ بَعۡدِ ظُلۡمِهِۦ وَأَصۡلَحَ فَإِنَّ ٱللَّهَ يَتُوبُ عَلَيۡهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ

39. Mpe oyo akosala tubela sima ya mbeba naye mpe abongisi, ya sôló, Allah okoyamba tubela naye, ya sôló, Allah azali molimbisi mpe atondo ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 5

أَلَمۡ تَعۡلَمۡ أَنَّ ٱللَّهَ لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ يُعَذِّبُ مَن يَشَآءُ وَيَغۡفِرُ لِمَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ

40. Boye, oyebi te ete ya sôló, bokonzi bwa likolo na nsé bozali ya Allah? Apesaka etumbu na oyo alingi, mpe alimbisaka na oyo alingi? Mpe Allah azali na bokoki mpo ya biloko binso. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 5

۞ يَٰٓأَيُّهَا ٱلرَّسُولُ لَا يَحۡزُنكَ ٱلَّذِينَ يُسَٰرِعُونَ فِي ٱلۡكُفۡرِ مِنَ ٱلَّذِينَ قَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِأَفۡوَٰهِهِمۡ وَلَمۡ تُؤۡمِن قُلُوبُهُمۡۛ وَمِنَ ٱلَّذِينَ هَادُواْۛ سَمَّٰعُونَ لِلۡكَذِبِ سَمَّٰعُونَ لِقَوۡمٍ ءَاخَرِينَ لَمۡ يَأۡتُوكَۖ يُحَرِّفُونَ ٱلۡكَلِمَ مِنۢ بَعۡدِ مَوَاضِعِهِۦۖ يَقُولُونَ إِنۡ أُوتِيتُمۡ هَٰذَا فَخُذُوهُ وَإِن لَّمۡ تُؤۡتَوۡهُ فَٱحۡذَرُواْۚ وَمَن يُرِدِ ٱللَّهُ فِتۡنَتَهُۥ فَلَن تَمۡلِكَ لَهُۥ مِنَ ٱللَّهِ شَيۡـًٔاۚ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَمۡ يُرِدِ ٱللَّهُ أَن يُطَهِّرَ قُلُوبَهُمۡۚ لَهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا خِزۡيٞۖ وَلَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ عَذَابٌ عَظِيمٞ

41. Eh! Motindami! Baye bazali kowela kokweya na bopagano, bapesa yo mpasi te. Bazali lisanga ya baye balobaka ete: Tondimi na balolemu na bango kasi na mitema na bango te, lolenge moko na bayuda, bazali kotia matoyi na koyoka lokuta ndenge moko bazali kotia matoyi na koyoka lokuta ya bato misusu oyo bayaki epai nayo te. Bazali kobalola liloba na esika na yango, mpe balobaka ete: Soki bapesi likambo oyo bozua, mpe soki bapesi bino te bokeba. Moto oyo Allah alingi komeka ye okosalisa ye na eloko moko te epai na Allah. Ba oyo wana nde Allah alingi kopetola mitema mia bango te. Bakokitisama awa na nsé mpe bakozua etumbu monene o mokolo ya suka. info
التفاسير: