クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo

Hûd

external-link copy
1 : 11

الٓرۚ كِتَٰبٌ أُحۡكِمَتۡ ءَايَٰتُهُۥ ثُمَّ فُصِّلَتۡ مِن لَّدُنۡ حَكِيمٍ خَبِيرٍ

1. Alif, lâm, râ(1). Buku eye mikapo miango mibongisami na lolenge ya kitoko mpe milimbolami na oyo atonda bwanya, moyebi ya ba sango. info

1 Alif, Lâm, Râ: Bótala suratu Al-Baqarah mokopo: 1.

التفاسير:

external-link copy
2 : 11

أَلَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّا ٱللَّهَۚ إِنَّنِي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرٞ وَبَشِيرٞ

2. Bobondela te sé Allah, ya soló nazali mokebisi mpe mopesi sango тропа bino. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 11

وَأَنِ ٱسۡتَغۡفِرُواْ رَبَّكُمۡ ثُمَّ تُوبُوٓاْ إِلَيۡهِ يُمَتِّعۡكُم مَّتَٰعًا حَسَنًا إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى وَيُؤۡتِ كُلَّ ذِي فَضۡلٖ فَضۡلَهُۥۖ وَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٖ كَبِيرٍ

3. Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye, akopesa bino bomengo kitoko kino na ntango oyo eyebani, mpe akopesa moto nyoso bolamu boye bokokani naye. Kasi soki boboyi solo ngai nazali kobangela bino etumbu o mokolo ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 11

إِلَى ٱللَّهِ مَرۡجِعُكُمۡۖ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ

4. Bokozongisama epai ya Allah, тре azali na bokoki na biloko binso. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 11

أَلَآ إِنَّهُمۡ يَثۡنُونَ صُدُورَهُمۡ لِيَسۡتَخۡفُواْ مِنۡهُۚ أَلَا حِينَ يَسۡتَغۡشُونَ ثِيَابَهُمۡ يَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَۚ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ

5. Kasi sólo, bazali kotondisa mitema mia bango na kobomba (ki bonguna), ata soki bazali komibomba na bilamba bia bango, ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa polele, ya soló, ye ayebaka maye mabombami o kati ya mitema. info
التفاسير: