Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo

Nûh

external-link copy
1 : 71

إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوۡمِهِۦٓ أَنۡ أَنذِرۡ قَوۡمَكَ مِن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ

1. Ya soló totindaki Nûh epai ya bato naye ete: Kebisa bato nayo yambo ya etumbu makasi eyela bango. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 71

قَالَ يَٰقَوۡمِ إِنِّي لَكُمۡ نَذِيرٞ مُّبِينٌ

2. Alobaki: Oh bato na ngai! Ya sôló, nazali mokebisi ya polele тропа bino, info
التفاسير:

external-link copy
3 : 71

أَنِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ وَٱتَّقُوهُ وَأَطِيعُونِ

3. Bobondela Allah, bobanga ye тре botosa ngai, info
التفاسير:

external-link copy
4 : 71

يَغۡفِرۡ لَكُم مِّن ذُنُوبِكُمۡ وَيُؤَخِّرۡكُمۡ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمًّىۚ إِنَّ أَجَلَ ٱللَّهِ إِذَا جَآءَ لَا يُؤَخَّرُۚ لَوۡ كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ

4. Mpo alimbisa bino masumu тре apesa bino mikolo kino elaka yango ekoka. Ya soló, tango elaka ya Allah ekoki ezelaka te soki bozali koyeba! info
التفاسير:

external-link copy
5 : 71

قَالَ رَبِّ إِنِّي دَعَوۡتُ قَوۡمِي لَيۡلٗا وَنَهَارٗا

5. Alobi: Nkolo! Ya sólo, natei bato na ngai butu na moyi, info
التفاسير:

external-link copy
6 : 71

فَلَمۡ يَزِدۡهُمۡ دُعَآءِيٓ إِلَّا فِرَارٗا

6. Kasi mateya na ngai ebakiseli bango sé kokima, info
التفاسير:

external-link copy
7 : 71

وَإِنِّي كُلَّمَا دَعَوۡتُهُمۡ لِتَغۡفِرَ لَهُمۡ جَعَلُوٓاْ أَصَٰبِعَهُمۡ فِيٓ ءَاذَانِهِمۡ وَٱسۡتَغۡشَوۡاْ ثِيَابَهُمۡ وَأَصَرُّواْ وَٱسۡتَكۡبَرُواْ ٱسۡتِكۡبَارٗا

7. Mpe tango nazali kobenga bango mpo olimbisa bango, bazali kotiya misapi na matoyi na bango mpe kozipa yango na bilamba, basali motu makasi mpe lolendo. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 71

ثُمَّ إِنِّي دَعَوۡتُهُمۡ جِهَارٗا

8. Sima nabengaki bango na polele, info
التفاسير:

external-link copy
9 : 71

ثُمَّ إِنِّيٓ أَعۡلَنتُ لَهُمۡ وَأَسۡرَرۡتُ لَهُمۡ إِسۡرَارٗا

9. Mpe nayebisaki bango na polele mpe na lolenge ya kobombama. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 71

فَقُلۡتُ ٱسۡتَغۡفِرُواْ رَبَّكُمۡ إِنَّهُۥ كَانَ غَفَّارٗا

10. Nayebisaki bango été: Botubela epai ya Nkolo na bino. Ya soló, ye azali molimbisi. info
التفاسير: