Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo

Numero di pagina:close

external-link copy
127 : 37

فَكَذَّبُوهُ فَإِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ

127. Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu. info
التفاسير:

external-link copy
128 : 37

إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ

128. Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama. info
التفاسير:

external-link copy
129 : 37

وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ

129. Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu. info
التفاسير:

external-link copy
130 : 37

سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِلۡ يَاسِينَ

130. Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye. info
التفاسير:

external-link copy
131 : 37

إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ

131. Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi. info
التفاسير:

external-link copy
132 : 37

إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ

132. Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi. info
التفاسير:

external-link copy
133 : 37

وَإِنَّ لُوطٗا لَّمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

133. Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami. info
التفاسير:

external-link copy
134 : 37

إِذۡ نَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ

134. Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba. info
التفاسير:

external-link copy
135 : 37

إِلَّا عَجُوزٗا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ

135. Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali. info
التفاسير:

external-link copy
136 : 37

ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ

136. Sima tobebisaki basusu. info
التفاسير:

external-link copy
137 : 37

وَإِنَّكُمۡ لَتَمُرُّونَ عَلَيۡهِم مُّصۡبِحِينَ

137. Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo). info
التفاسير:

external-link copy
138 : 37

وَبِٱلَّيۡلِۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ

138. Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te? info
التفاسير:

external-link copy
139 : 37

وَإِنَّ يُونُسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

139. Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami. info
التفاسير:

external-link copy
140 : 37

إِذۡ أَبَقَ إِلَى ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ

140. Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda) info
التفاسير:

external-link copy
141 : 37

فَسَاهَمَ فَكَانَ مِنَ ٱلۡمُدۡحَضِينَ

141. Mpe aponamaki été abwakama. info
التفاسير:

external-link copy
142 : 37

فَٱلۡتَقَمَهُ ٱلۡحُوتُ وَهُوَ مُلِيمٞ

142. Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te. info
التفاسير:

external-link copy
143 : 37

فَلَوۡلَآ أَنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلۡمُسَبِّحِينَ

143. Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah, info
التفاسير:

external-link copy
144 : 37

لَلَبِثَ فِي بَطۡنِهِۦٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ

144. Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa. info
التفاسير:

external-link copy
145 : 37

۞ فَنَبَذۡنَٰهُ بِٱلۡعَرَآءِ وَهُوَ سَقِيمٞ

145. Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni. info
التفاسير:

external-link copy
146 : 37

وَأَنۢبَتۡنَا عَلَيۡهِ شَجَرَةٗ مِّن يَقۡطِينٖ

146. Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki) info
التفاسير:

external-link copy
147 : 37

وَأَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ مِاْئَةِ أَلۡفٍ أَوۡ يَزِيدُونَ

147. Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka. info
التفاسير:

external-link copy
148 : 37

فَـَٔامَنُواْ فَمَتَّعۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ حِينٖ

148. Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke. info
التفاسير:

external-link copy
149 : 37

فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَلِرَبِّكَ ٱلۡبَنَاتُ وَلَهُمُ ٱلۡبَنُونَ

149. Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali? info
التفاسير:

external-link copy
150 : 37

أَمۡ خَلَقۡنَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِنَٰثٗا وَهُمۡ شَٰهِدُونَ

150. То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona? info
التفاسير:

external-link copy
151 : 37

أَلَآ إِنَّهُم مِّنۡ إِفۡكِهِمۡ لَيَقُولُونَ

151. Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango. info
التفاسير:

external-link copy
152 : 37

وَلَدَ ٱللَّهُ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ

152. (Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta. info
التفاسير:

external-link copy
153 : 37

أَصۡطَفَى ٱلۡبَنَاتِ عَلَى ٱلۡبَنِينَ

153. Boye akopona bana basi koleka bana mibali? info
التفاسير: