Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo

Numero di pagina:close

external-link copy
34 : 14

وَءَاتَىٰكُم مِّن كُلِّ مَا سَأَلۡتُمُوهُۚ وَإِن تَعُدُّواْ نِعۡمَتَ ٱللَّهِ لَا تُحۡصُوهَآۗ إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ لَظَلُومٞ كَفَّارٞ

34. Mpe apesaka bino nyonso oyo bosengaka ye, mpe soki bolingi koyeba bolamu ya Allah oyo asaleli bino, bokokoka koyeba motango mwa yango te. Ya soló, moto alekisi ndelo na bopegwi mpe bobubi. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 14

وَإِذۡ قَالَ إِبۡرَٰهِيمُ رَبِّ ٱجۡعَلۡ هَٰذَا ٱلۡبَلَدَ ءَامِنٗا وَٱجۡنُبۡنِي وَبَنِيَّ أَن نَّعۡبُدَ ٱلۡأَصۡنَامَ

35. Mpe tango Ibrâhîm alobaki: Oh Nkolo wa ngai! Tia mboka oyo (Makkah) ezala na kimia, mpe tiya ngai na bana ba ngai mosika mpo tobondela bikeko te, info
التفاسير:

external-link copy
36 : 14

رَبِّ إِنَّهُنَّ أَضۡلَلۡنَ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلنَّاسِۖ فَمَن تَبِعَنِي فَإِنَّهُۥ مِنِّيۖ وَمَنۡ عَصَانِي فَإِنَّكَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ

36. Oh Nkolo wa ngai! Ya sôló, yango (bikeko) bisili kobungisa bato ebele. Mpe moto oyo akolanda ngai, ya soló azali wa ngai, kasi oyo akotosa ngai te, ya sólo, yo nde molimbisi otonda ngolu, info
التفاسير:

external-link copy
37 : 14

رَّبَّنَآ إِنِّيٓ أَسۡكَنتُ مِن ذُرِّيَّتِي بِوَادٍ غَيۡرِ ذِي زَرۡعٍ عِندَ بَيۡتِكَ ٱلۡمُحَرَّمِ رَبَّنَا لِيُقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ فَٱجۡعَلۡ أَفۡـِٔدَةٗ مِّنَ ٱلنَّاسِ تَهۡوِيٓ إِلَيۡهِمۡ وَٱرۡزُقۡهُم مِّنَ ٱلثَّمَرَٰتِ لَعَلَّهُمۡ يَشۡكُرُونَ

37. Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, natiki ndambu ya libota na ngai na nsé ya ngomba oyo, ezali na bato te mpe ezali na milona te, pene na ndako nayo esantu, Nkolo mpo été batelemisa losambo, mpe sala été bato bawuta mosika bakende kofanda na bango esika wana, mpe leisa bango bambuma mpo été batonda yo botondi, info
التفاسير:

external-link copy
38 : 14

رَبَّنَآ إِنَّكَ تَعۡلَمُ مَا نُخۡفِي وَمَا نُعۡلِنُۗ وَمَا يَخۡفَىٰ عَلَى ٱللَّهِ مِن شَيۡءٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِ

38. Oh Nkolo wa biso! Ya sólo penza, oyebi maye mabombami o mitema mia biso na maye tomonisaka polele, mpe eloko te ekoki kobombamela Allah ezala na nsé to na likolo. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 14

ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي وَهَبَ لِي عَلَى ٱلۡكِبَرِ إِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَۚ إِنَّ رَبِّي لَسَمِيعُ ٱلدُّعَآءِ

39. Matondi na Allah oyo apesi ngai likabo ya İsmail mpe Is’háq na bopaka na ngai. Ya sólo, Nkolo na ngai azali penza moyoki ya libondeli, info
التفاسير:

external-link copy
40 : 14

رَبِّ ٱجۡعَلۡنِي مُقِيمَ ٱلصَّلَوٰةِ وَمِن ذُرِّيَّتِيۚ رَبَّنَا وَتَقَبَّلۡ دُعَآءِ

40. Oh Nkolo wa ngai! Sala ngai ete nakokisa basambela elongo na libota nangai, Nkolo wa biso ndima libondeli na biso. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 14

رَبَّنَا ٱغۡفِرۡ لِي وَلِوَٰلِدَيَّ وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ يَوۡمَ يَقُومُ ٱلۡحِسَابُ

41. OhNkolo wa biso! Limbisangai na baboti ba ngai,(1) na bandimi o mokolo mwa lifuta. info

1 Baboti ba ngai: Alobaki yango liboso ya koyeba ete tata naye azalaki monguna ya Allah, tango ayebi akabuani naye.

التفاسير:

external-link copy
42 : 14

وَلَا تَحۡسَبَنَّ ٱللَّهَ غَٰفِلًا عَمَّا يَعۡمَلُ ٱلظَّٰلِمُونَۚ إِنَّمَا يُؤَخِّرُهُمۡ لِيَوۡمٖ تَشۡخَصُ فِيهِ ٱلۡأَبۡصَٰرُ

42. Mpe bokanisa te ete: Allah alandaka te maye babubi bazali kosala. Ya soló, azali kozelisa bango kino o mokolo moye miso ma bango makotombwama. info
التفاسير: