Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû

Numéro de la page: 343:342 close

external-link copy
28 : 23

فَإِذَا ٱسۡتَوَيۡتَ أَنتَ وَمَن مَّعَكَ عَلَى ٱلۡفُلۡكِ فَقُلِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي نَجَّىٰنَا مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ

28. Mpe soki omati na masuwa yo na ba oyo ozali na bango, loba: Lokumu ya Allah oyo alongisi biso likolo ya bato mabe. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 23

وَقُل رَّبِّ أَنزِلۡنِي مُنزَلٗا مُّبَارَكٗا وَأَنتَ خَيۡرُ ٱلۡمُنزِلِينَ

29. Mpe loba: Nkolo kitisa ngai na esika ya mapamboli, mpe yo nde mokitisi ya malamu. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 23

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ وَإِن كُنَّا لَمُبۡتَلِينَ

30. Ya soló, wana nde bilembo. Mpe tozali ya sólo baye topesaka komekama. info
التفاسير:

external-link copy
31 : 23

ثُمَّ أَنشَأۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِمۡ قَرۡنًا ءَاخَرِينَ

31. Sima na bango tokelaki bato basusu. info
التفاسير:

external-link copy
32 : 23

فَأَرۡسَلۡنَا فِيهِمۡ رَسُولٗا مِّنۡهُمۡ أَنِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرُهُۥٓۚ أَفَلَا تَتَّقُونَ

32. Mpe totindelaki bango motindami kowuta kati na bango moko mpo ayebisa bango ete: Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye, boye bozali kobanga te? info
التفاسير:

external-link copy
33 : 23

وَقَالَ ٱلۡمَلَأُ مِن قَوۡمِهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِلِقَآءِ ٱلۡأٓخِرَةِ وَأَتۡرَفۡنَٰهُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا مَا هَٰذَآ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ يَأۡكُلُ مِمَّا تَأۡكُلُونَ مِنۡهُ وَيَشۡرَبُ مِمَّا تَشۡرَبُونَ

33. Mpe bankumu kati na bato naye na baye baboya kondimela elaka ya suka mpe topesi bango bolamu awa na nsé, balobi: Ye azali moto lokola bino, aliaka biloko oyo boliaka, mpe amelaka oyo bomelaka. info
التفاسير:

external-link copy
34 : 23

وَلَئِنۡ أَطَعۡتُم بَشَرٗا مِّثۡلَكُمۡ إِنَّكُمۡ إِذٗا لَّخَٰسِرُونَ

34. Kasi soki botosi moto oyo azali lokola bino, wana bosili kozanga. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 23

أَيَعِدُكُمۡ أَنَّكُمۡ إِذَا مِتُّمۡ وَكُنتُمۡ تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَنَّكُم مُّخۡرَجُونَ

35. Boye azali kolaka bino ete: Soki bokufi mpe bokomi putulu mpe mikuwa, ete bokobima (na malita)? info
التفاسير:

external-link copy
36 : 23

۞ هَيۡهَاتَ هَيۡهَاتَ لِمَا تُوعَدُونَ

36. Mosika mosika тропа oyo bazali kolaka bino. info
التفاسير:

external-link copy
37 : 23

إِنۡ هِيَ إِلَّا حَيَاتُنَا ٱلدُّنۡيَا نَمُوتُ وَنَحۡيَا وَمَا نَحۡنُ بِمَبۡعُوثِينَ

37. Wana ezali sé bomoyi ya biso oyo ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa kasi tokosekwa te. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 23

إِنۡ هُوَ إِلَّا رَجُلٌ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا وَمَا نَحۡنُ لَهُۥ بِمُؤۡمِنِينَ

38. Wana azali moto oyo azali kobukela Allah lokuta, mpe tokondimelaka ye te. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 23

قَالَ رَبِّ ٱنصُرۡنِي بِمَا كَذَّبُونِ

39. Alobi: Nkolo, sunga ngai mpo ete bazwi ngai moto wa lokuta. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 23

قَالَ عَمَّا قَلِيلٖ لَّيُصۡبِحُنَّ نَٰدِمِينَ

40. (Allah) alobi: Iyo; kala mingi te bakokoma na mawa. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 23

فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّيۡحَةُ بِٱلۡحَقِّ فَجَعَلۡنَٰهُمۡ غُثَآءٗۚ فَبُعۡدٗا لِّلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ

41. Mpe ligangi esimbaki bango na bosôló, mpe tokomisaki bango lokola makasa ya kokawuka (mpe bakumbami na mayi makasi), mpe libebi тропа babubi. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 23

ثُمَّ أَنشَأۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِمۡ قُرُونًا ءَاخَرِينَ

42. Sima na bango tokelaki bato basusu. info
التفاسير: