Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo

An-Naba’

external-link copy
1 : 78

عَمَّ يَتَسَآءَلُونَ

1. Na likambo nini bazali komitunana? info
التفاسير:

external-link copy
2 : 78

عَنِ ٱلنَّبَإِ ٱلۡعَظِيمِ

2. Likolo ya sango enene, info
التفاسير:

external-link copy
3 : 78

ٱلَّذِي هُمۡ فِيهِ مُخۡتَلِفُونَ

3. Eye pona yango bakeseni makanisi. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 78

كَلَّا سَيَعۡلَمُونَ

4. Te kasi bakoyeba yango sima ya mwa ngonga moke. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 78

ثُمَّ كَلَّا سَيَعۡلَمُونَ

5. Te sima lisusu bakoyeba yango. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 78

أَلَمۡ نَجۡعَلِ ٱلۡأَرۡضَ مِهَٰدٗا

6. Tozalisaki te mabele etando? info
التفاسير:

external-link copy
7 : 78

وَٱلۡجِبَالَ أَوۡتَادٗا

7. Mpe bangomba lokola makonzi? info
التفاسير:

external-link copy
8 : 78

وَخَلَقۡنَٰكُمۡ أَزۡوَٰجٗا

8. Tokelaki bino te mibale mibale? info
التفاسير:

external-link copy
9 : 78

وَجَعَلۡنَا نَوۡمَكُمۡ سُبَاتٗا

9. Мре tozalisaki te mpongi ezala pona bino bopemi? info
التفاسير:

external-link copy
10 : 78

وَجَعَلۡنَا ٱلَّيۡلَ لِبَاسٗا

10. Мре tokelaki te butu ezala elamba ekozipa bino? info
التفاسير:

external-link copy
11 : 78

وَجَعَلۡنَا ٱلنَّهَارَ مَعَاشٗا

11. Mpe tosalaki te mokolo тропа misala mia bomoyi? info
التفاسير:

external-link copy
12 : 78

وَبَنَيۡنَا فَوۡقَكُمۡ سَبۡعٗا شِدَادٗا

12. Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama? info
التفاسير:

external-link copy
13 : 78

وَجَعَلۡنَا سِرَاجٗا وَهَّاجٗا

13. Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga? info
التفاسير:

external-link copy
14 : 78

وَأَنزَلۡنَا مِنَ ٱلۡمُعۡصِرَٰتِ مَآءٗ ثَجَّاجٗا

14. Mpe tokitisaki kowuta na mapata mayi ebele, info
التفاسير:

external-link copy
15 : 78

لِّنُخۡرِجَ بِهِۦ حَبّٗا وَنَبَاتٗا

15. Mpo ete na mayi tobimisa bambuma mpe bilona, info
التفاسير:

external-link copy
16 : 78

وَجَنَّٰتٍ أَلۡفَافًا

16. Na bilanga ekembisami (kitoto)? info
التفاسير:

external-link copy
17 : 78

إِنَّ يَوۡمَ ٱلۡفَصۡلِ كَانَ مِيقَٰتٗا

17. Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 78

يَوۡمَ يُنفَخُ فِي ٱلصُّورِ فَتَأۡتُونَ أَفۡوَاجٗا

18. Mokolo bakofula kelelo bokoya lisanga lisanga. info
التفاسير:

external-link copy
19 : 78

وَفُتِحَتِ ٱلسَّمَآءُ فَكَانَتۡ أَبۡوَٰبٗا

19. Mpe likolo likofungwama bikokoma bikuke. info
التفاسير:

external-link copy
20 : 78

وَسُيِّرَتِ ٱلۡجِبَالُ فَكَانَتۡ سَرَابًا

20. Mpe bangomba bikotambola na lombango. info
التفاسير:

external-link copy
21 : 78

إِنَّ جَهَنَّمَ كَانَتۡ مِرۡصَادٗا

21. Ya solo, lifelo ezali kozela. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 78

لِّلطَّٰغِينَ مَـَٔابٗا

22. Esika yakofanda тропа batomboki. info
التفاسير:

external-link copy
23 : 78

لَّٰبِثِينَ فِيهَآ أَحۡقَابٗا

23. O’kati na yango bakofanda seko na seko. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 78

لَّا يَذُوقُونَ فِيهَا بَرۡدٗا وَلَا شَرَابًا

24. O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te, info
التفاسير:

external-link copy
25 : 78

إِلَّا حَمِيمٗا وَغَسَّاقٗا

25. Longola sé mayi ya moto ya tofina, info
التفاسير:

external-link copy
26 : 78

جَزَآءٗ وِفَاقًا

26. Lokola lifuta lia bosembo тропа bango. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 78

إِنَّهُمۡ كَانُواْ لَا يَرۡجُونَ حِسَابٗا

27. Mpo ete bazalaki kondima na mokolo mwa bosambisami te. info
التفاسير:

external-link copy
28 : 78

وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا كِذَّابٗا

28. Mpe batiaki ntembe na maloba na biso. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 78

وَكُلَّ شَيۡءٍ أَحۡصَيۡنَٰهُ كِتَٰبٗا

29. Nzoka nde biso totiaki manso na mokanda. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 78

فَذُوقُواْ فَلَن نَّزِيدَكُمۡ إِلَّا عَذَابًا

30. Kasi bomeka! Biso tokobakisa pona bino te sé etumbu. info
التفاسير:

external-link copy
31 : 78

إِنَّ لِلۡمُتَّقِينَ مَفَازًا

31. Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah). info
التفاسير:

external-link copy
32 : 78

حَدَآئِقَ وَأَعۡنَٰبٗا

32. Bilanga mpe masanga ya bilengi, info
التفاسير:

external-link copy
33 : 78

وَكَوَاعِبَ أَتۡرَابٗا

33. Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko, info
التفاسير:

external-link copy
34 : 78

وَكَأۡسٗا دِهَاقٗا

34. Mpe bankopo ebele ya bomeli. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 78

لَّا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوٗا وَلَا كِذَّٰبٗا

35. O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te. info
التفاسير:

external-link copy
36 : 78

جَزَآءٗ مِّن رَّبِّكَ عَطَآءً حِسَابٗا

36. Yango nde lifuta kowuta na Nkolo nayo lokola libonza. info
التفاسير:

external-link copy
37 : 78

رَّبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا ٱلرَّحۡمَٰنِۖ لَا يَمۡلِكُونَ مِنۡهُ خِطَابٗا

37. Ye Nkolo mapata mpe mabele na maye mazwami kati kati na yango, Ar-Rahmân(1) bakozala na liloba te o’boso bwa ye. info

1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30

التفاسير:

external-link copy
38 : 78

يَوۡمَ يَقُومُ ٱلرُّوحُ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ صَفّٗاۖ لَّا يَتَكَلَّمُونَ إِلَّا مَنۡ أَذِنَ لَهُ ٱلرَّحۡمَٰنُ وَقَالَ صَوَابٗا

38. Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân(1) (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo. info

1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.

التفاسير:

external-link copy
39 : 78

ذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمُ ٱلۡحَقُّۖ فَمَن شَآءَ ٱتَّخَذَ إِلَىٰ رَبِّهِۦ مَـَٔابًا

39. Mokolo yango ezali ya sólo. Oyo alingi amitia na libateli ya Nkolo naye. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 78

إِنَّآ أَنذَرۡنَٰكُمۡ عَذَابٗا قَرِيبٗا يَوۡمَ يَنظُرُ ٱلۡمَرۡءُ مَا قَدَّمَتۡ يَدَاهُ وَيَقُولُ ٱلۡكَافِرُ يَٰلَيۡتَنِي كُنتُ تُرَٰبَۢا

40. Ya sólo, tokebisi bino na etumbu ya pene, mokolo moto akomona maye maboko maye masalaki na ntango ena mopagano akoloba ete: Eh mpasi na ngai! Na bongwana ata mabele. info
التفاسير: