Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo

Número de página:close

external-link copy
238 : 2

حَٰفِظُواْ عَلَى ٱلصَّلَوَٰتِ وَٱلصَّلَوٰةِ ٱلۡوُسۡطَىٰ وَقُومُواْ لِلَّهِ قَٰنِتِينَ

238. Bobatela basambela, mpe sambela ya sima ya nzanga. Mpe botelema na limemia liboso ya Allah. info
التفاسير:

external-link copy
239 : 2

فَإِنۡ خِفۡتُمۡ فَرِجَالًا أَوۡ رُكۡبَانٗاۖ فَإِذَآ أَمِنتُمۡ فَٱذۡكُرُواْ ٱللَّهَ كَمَا عَلَّمَكُم مَّا لَمۡ تَكُونُواْ تَعۡلَمُونَ

239. Mpe soki bobangi bosambela ya kotelema to likolo ya bampunda. Kasi soki bozui kimia bosambela Allah na ndenge atangisi bino maye boyebaki te. info
التفاسير:

external-link copy
240 : 2

وَٱلَّذِينَ يُتَوَفَّوۡنَ مِنكُمۡ وَيَذَرُونَ أَزۡوَٰجٗا وَصِيَّةٗ لِّأَزۡوَٰجِهِم مَّتَٰعًا إِلَى ٱلۡحَوۡلِ غَيۡرَ إِخۡرَاجٖۚ فَإِنۡ خَرَجۡنَ فَلَا جُنَاحَ عَلَيۡكُمۡ فِي مَا فَعَلۡنَ فِيٓ أَنفُسِهِنَّ مِن مَّعۡرُوفٖۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٞ

240. Baye kati na bino liwa lizui bango mpe batiki basi, esengeli batikela bango malako. Mpe basala bango malamu mobu moko, kasi babengana bango na ndenge ya mabe te. Soki bango moko babimi mpe bakei, ezali mabe te likolo nabino na maye bango moko baponi na bolamu.Mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
241 : 2

وَلِلۡمُطَلَّقَٰتِ مَتَٰعُۢ بِٱلۡمَعۡرُوفِۖ حَقًّا عَلَى ٱلۡمُتَّقِينَ

241. Mpe mpona basi bakufeli mabala esengeli kosalela bango limemia na lolenge ya malamu, ezali lotomo likolo ya babangi. info
التفاسير:

external-link copy
242 : 2

كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ لَعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ

242. Na boye nde Allah azali kolimbola bino bilembo naye, mpo ete bososola. info
التفاسير:

external-link copy
243 : 2

۞ أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ خَرَجُواْ مِن دِيَٰرِهِمۡ وَهُمۡ أُلُوفٌ حَذَرَ ٱلۡمَوۡتِ فَقَالَ لَهُمُ ٱللَّهُ مُوتُواْ ثُمَّ أَحۡيَٰهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَشۡكُرُونَ

243. Ozali komona te baye babimaki na bandako na bango bazalaki bankoto mpe bango babangi liwa? Mpe Allah alobi na bango: bokufa. Sima asekwisi bango. Ya sôló, Allah aleki kosalela bato bolamu, mpe kasi bato ebele bazali kotondo ye te. info
التفاسير:

external-link copy
244 : 2

وَقَٰتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ سَمِيعٌ عَلِيمٞ

244. Mpe bobunda na nzela ya Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali moyoki moyebi ya manso. info
التفاسير:

external-link copy
245 : 2

مَّن ذَا ٱلَّذِي يُقۡرِضُ ٱللَّهَ قَرۡضًا حَسَنٗا فَيُضَٰعِفَهُۥ لَهُۥٓ أَضۡعَافٗا كَثِيرَةٗۚ وَٱللَّهُ يَقۡبِضُ وَيَبۡصُۜطُ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ

245. Oyo azali kosalela Allah mosala malamu, akobakisela ye mbala ebele, mpe Allah akangaka bozui mpe afungolaka. Mpe epai naye nde bokozongisama. info
التفاسير: