Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo

Número de página:close

external-link copy
39 : 19

وَأَنذِرۡهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡحَسۡرَةِ إِذۡ قُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ وَهُمۡ فِي غَفۡلَةٖ وَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ

39. Mpe kebisa bango тропа mokolo mwa botungisami, tango manso makokatamaka, mpe bazali о mokili moye bazali komiyeba te mpe kondima te. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 19

إِنَّا نَحۡنُ نَرِثُ ٱلۡأَرۡضَ وَمَنۡ عَلَيۡهَا وَإِلَيۡنَا يُرۡجَعُونَ

40. Ya sólo, biso nde tozali na bokitani ya mabele, mpe baye banso bazali o likolo na yango, mpe epai na biso nde banso bakozonga. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 19

وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ إِبۡرَٰهِيمَۚ إِنَّهُۥ كَانَ صِدِّيقٗا نَّبِيًّا

41. Mpe kundola Ibrâhîm okati ya buku (kurani), ya soló, ye azalaki ntoma moto ya bosembo. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 19

إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ يَٰٓأَبَتِ لِمَ تَعۡبُدُ مَا لَا يَسۡمَعُ وَلَا يُبۡصِرُ وَلَا يُغۡنِي عَنكَ شَيۡـٔٗا

42. Tango ayebisaki na tata waye, eh tata wa ngai! Mpona nini ozali kobondela oyo akoyokaka te, mpe akomonaka te, mpe ekoki kosalisa yo na eloko te? info
التفاسير:

external-link copy
43 : 19

يَٰٓأَبَتِ إِنِّي قَدۡ جَآءَنِي مِنَ ٱلۡعِلۡمِ مَا لَمۡ يَأۡتِكَ فَٱتَّبِعۡنِيٓ أَهۡدِكَ صِرَٰطٗا سَوِيّٗا

43. Eh tata wa ngai! Našili kozua boyebi boye boyela naino yo te, landa ngai nakokamba yo o nzela ya semba. info
التفاسير:

external-link copy
44 : 19

يَٰٓأَبَتِ لَا تَعۡبُدِ ٱلشَّيۡطَٰنَۖ إِنَّ ٱلشَّيۡطَٰنَ كَانَ لِلرَّحۡمَٰنِ عَصِيّٗا

44. Eh tata wa ngai! Kobondela satana te, ya soló, satana azangaki botosi ya Ar-Rahmán.(1) info

1 Bótala na mokapo: 18, 26, ya suratu oyo.

التفاسير:

external-link copy
45 : 19

يَٰٓأَبَتِ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يَمَسَّكَ عَذَابٞ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ فَتَكُونَ لِلشَّيۡطَٰنِ وَلِيّٗا

45. Eh tata wa ngai! Ya sólo ngai nazali kobanga etumbu ya Ar-Rahmán eyela yo, mpe okoma moto wa satana. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 19

قَالَ أَرَاغِبٌ أَنتَ عَنۡ ءَالِهَتِي يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُۖ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ لَأَرۡجُمَنَّكَۖ وَٱهۡجُرۡنِي مَلِيّٗا

46. Alobi: Eh Ibrâhîm! Ozali koyina banzambe ba ngai? Soki otiki te nakobetaka yo mabanga zala mosika na ngai (tokabwana) tango molai. info
التفاسير:

external-link copy
47 : 19

قَالَ سَلَٰمٌ عَلَيۡكَۖ سَأَسۡتَغۡفِرُ لَكَ رَبِّيٓۖ إِنَّهُۥ كَانَ بِي حَفِيّٗا

47. Ibrâhîm alobi: Kimia ezala nayo, nakosengelaka yo na Allah alimbisa yo, mpo ye andimelaka ngai тропа bolamu. info
التفاسير:

external-link copy
48 : 19

وَأَعۡتَزِلُكُمۡ وَمَا تَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَأَدۡعُواْ رَبِّي عَسَىٰٓ أَلَّآ أَكُونَ بِدُعَآءِ رَبِّي شَقِيّٗا

48. Namitie mosika na bino, mpe na maye bozali kobondela na botiki Allah, mpe nakosenga na Nkolo wa ngai, mpe nazali na elikya ete nakomona pasi te soki nasengi Nkolo wa ngai. info
التفاسير:

external-link copy
49 : 19

فَلَمَّا ٱعۡتَزَلَهُمۡ وَمَا يَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَهَبۡنَا لَهُۥٓ إِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَۖ وَكُلّٗا جَعَلۡنَا نَبِيّٗا

49. Tango amitie mosika na bango, mpe na maye bazalaki kobondela na botiki Allah, topesaki ye likabo ya Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki bango bantoma. info
التفاسير:

external-link copy
50 : 19

وَوَهَبۡنَا لَهُم مِّن رَّحۡمَتِنَا وَجَعَلۡنَا لَهُمۡ لِسَانَ صِدۡقٍ عَلِيّٗا

50. Mpe topesaki bango ngolu na biso, mpe totombolaki bango na koloba bosôló. info
التفاسير:

external-link copy
51 : 19

وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ مُوسَىٰٓۚ إِنَّهُۥ كَانَ مُخۡلَصٗا وَكَانَ رَسُولٗا نَّبِيّٗا

51. Mpe kundola Mûssa okati ya buku. Ya soló, azalaki moponomi ntoma mpe motindami. info
التفاسير: