Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo

Número de página:close

external-link copy
5 : 18

مَّا لَهُم بِهِۦ مِنۡ عِلۡمٖ وَلَا لِأٓبَآئِهِمۡۚ كَبُرَتۡ كَلِمَةٗ تَخۡرُجُ مِنۡ أَفۡوَٰهِهِمۡۚ إِن يَقُولُونَ إِلَّا كَذِبٗا

5. Bazali na boyebi na yango te lolenge moko na batata na bango, liloba ya mabe ezali kobima na minoko mia bango. Manso bazali koloba ezali sé lokuta. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 18

فَلَعَلَّكَ بَٰخِعٞ نَّفۡسَكَ عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِمۡ إِن لَّمۡ يُؤۡمِنُواْ بِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ أَسَفًا

6. Ozali komitungisama na mpasi ete baboyi kondima na lisolo oyo. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 18

إِنَّا جَعَلۡنَا مَا عَلَى ٱلۡأَرۡضِ زِينَةٗ لَّهَا لِنَبۡلُوَهُمۡ أَيُّهُمۡ أَحۡسَنُ عَمَلٗا

7. Ya soló, maye mazuami o likolo ya mabele, totiyaki yango ezala na bonzenga na yango mpo été ezala bomekami epai ya bato mpe totala nani kati na bango akosala bolamu. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 18

وَإِنَّا لَجَٰعِلُونَ مَا عَلَيۡهَا صَعِيدٗا جُرُزًا

8. Mpe ya sólo, na sima tokobalola yango mpe ekomi makasi, etikali polele ezali na eloko te (mabele oyo ezali na milona te). info
التفاسير:

external-link copy
9 : 18

أَمۡ حَسِبۡتَ أَنَّ أَصۡحَٰبَ ٱلۡكَهۡفِ وَٱلرَّقِيمِ كَانُواْ مِنۡ ءَايَٰتِنَا عَجَبًا

9. Okanisi ete bato ya kati ya mobengá na bato ya ar-raqím(1) bazalaki kati ya bilembo na biso ya kokamwa? info

1 Ar-raqïm: Eloko ya makomami.

التفاسير:

external-link copy
10 : 18

إِذۡ أَوَى ٱلۡفِتۡيَةُ إِلَى ٱلۡكَهۡفِ فَقَالُواْ رَبَّنَآ ءَاتِنَا مِن لَّدُنكَ رَحۡمَةٗ وَهَيِّئۡ لَنَا مِنۡ أَمۡرِنَا رَشَدٗا

10. Tango bilenge babatamaki o kati ya mobéngá balobaki été; Oh Nkolo wa biso! Zipa biso na ngolu nayo, mpe sembola biso na makambo na biso nyoso. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 18

فَضَرَبۡنَا عَلَىٰٓ ءَاذَانِهِمۡ فِي ٱلۡكَهۡفِ سِنِينَ عَدَدٗا

11. Mpe tokangaki matoyi na bango mibu miyike okati ya mobengá. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 18

ثُمَّ بَعَثۡنَٰهُمۡ لِنَعۡلَمَ أَيُّ ٱلۡحِزۡبَيۡنِ أَحۡصَىٰ لِمَا لَبِثُوٓاْ أَمَدٗا

12. Sima, tosekwisaki bango mpo toyeba lisanga nini kati na bango mibale bayebi motango ya mibu miye basalaki wana. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 18

نَّحۡنُ نَقُصُّ عَلَيۡكَ نَبَأَهُم بِٱلۡحَقِّۚ إِنَّهُمۡ فِتۡيَةٌ ءَامَنُواْ بِرَبِّهِمۡ وَزِدۡنَٰهُمۡ هُدٗى

13. Tozali kobetela yo sango na bango na bosóló. Bazalaki bilenge baye bandimaki na Nkolo wa bango mpe tobakiselaki bango bokambami. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 18

وَرَبَطۡنَا عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ إِذۡ قَامُواْ فَقَالُواْ رَبُّنَا رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ لَن نَّدۡعُوَاْ مِن دُونِهِۦٓ إِلَٰهٗاۖ لَّقَدۡ قُلۡنَآ إِذٗا شَطَطًا

14. Мре tolendisa mitema mia bango, tango batelemaki mpe balobaki: Nkolo wa biso nde Nkolo wa likolo na mabele, tokobelela banzambe basusu te na esika naye, soki te tokoloba mabe mpenza. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 18

هَٰٓؤُلَآءِ قَوۡمُنَا ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِهِۦٓ ءَالِهَةٗۖ لَّوۡلَا يَأۡتُونَ عَلَيۡهِم بِسُلۡطَٰنِۭ بَيِّنٖۖ فَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا

15. Tala bato na biso oyo bazui banzambe misusu na botiki ye, pona nini te bazali komema elembetele ya polele nani azali moto mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta? info
التفاسير: