Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo

Broj stranice:close

external-link copy
32 : 52

أَمۡ تَأۡمُرُهُمۡ أَحۡلَٰمُهُم بِهَٰذَآۚ أَمۡ هُمۡ قَوۡمٞ طَاغُونَ

32. То boye bamposa na bango ezali kotinda na lolenge wana, to boye bazali nde batomboki? info
التفاسير:

external-link copy
33 : 52

أَمۡ يَقُولُونَ تَقَوَّلَهُۥۚ بَل لَّا يُؤۡمِنُونَ

33. To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te. info
التفاسير:

external-link copy
34 : 52

فَلۡيَأۡتُواْ بِحَدِيثٖ مِّثۡلِهِۦٓ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ

34. (Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 52

أَمۡ خُلِقُواْ مِنۡ غَيۡرِ شَيۡءٍ أَمۡ هُمُ ٱلۡخَٰلِقُونَ

35. To bakelamaki kowuta na eloko moko te, to bango nde bakeli. info
التفاسير:

external-link copy
36 : 52

أَمۡ خَلَقُواْ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَۚ بَل لَّا يُوقِنُونَ

36. To bango nde bakela likolo na nsé? Kasi bazali kondima te? info
التفاسير:

external-link copy
37 : 52

أَمۡ عِندَهُمۡ خَزَآئِنُ رَبِّكَ أَمۡ هُمُ ٱلۡمُصَۜيۡطِرُونَ

37. To bazali na sanduku ya bozui ya Nkolo nayo, to baleki ye na nyoso? info
التفاسير:

external-link copy
38 : 52

أَمۡ لَهُمۡ سُلَّمٞ يَسۡتَمِعُونَ فِيهِۖ فَلۡيَأۡتِ مُسۡتَمِعُهُم بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٍ

38. To bazali na emateli ya likolo mpo baya koyokamela? Kasi moyokameli na bango aya na elembo na yango ya polele. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 52

أَمۡ لَهُ ٱلۡبَنَٰتُ وَلَكُمُ ٱلۡبَنُونَ

39. To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali?! info
التفاسير:

external-link copy
40 : 52

أَمۡ تَسۡـَٔلُهُمۡ أَجۡرٗا فَهُم مِّن مَّغۡرَمٖ مُّثۡقَلُونَ

40. To azali kosenga bango lifuta oyo ezali kopesa bango pasi тропа kofuta? info
التفاسير:

external-link copy
41 : 52

أَمۡ عِندَهُمُ ٱلۡغَيۡبُ فَهُمۡ يَكۡتُبُونَ

41. To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango? info
التفاسير:

external-link copy
42 : 52

أَمۡ يُرِيدُونَ كَيۡدٗاۖ فَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ هُمُ ٱلۡمَكِيدُونَ

42. To bazali kosala likita ya mabe? Kasi likita ya bapengwi ezongelaka sé bango moko. info
التفاسير:

external-link copy
43 : 52

أَمۡ لَهُمۡ إِلَٰهٌ غَيۡرُ ٱللَّهِۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يُشۡرِكُونَ

43. To bazali na nzambe mosusu na botiki Allah? Lokumu na Allah aleki oyo bazali kosangisa. info
التفاسير:

external-link copy
44 : 52

وَإِن يَرَوۡاْ كِسۡفٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ سَاقِطٗا يَقُولُواْ سَحَابٞ مَّرۡكُومٞ

44. Mpe soki bamoni ndambu ya likolo ekweyi (etumbu enene), balobi: Wana ezali nde mapata ekangama. info
التفاسير:

external-link copy
45 : 52

فَذَرۡهُمۡ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي فِيهِ يُصۡعَقُونَ

45. Tika bango kino bakokutanaka na mokolo na bango oyo bakobetamaka na nkake. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 52

يَوۡمَ لَا يُغۡنِي عَنۡهُمۡ كَيۡدُهُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ

46. Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te. info
التفاسير:

external-link copy
47 : 52

وَإِنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ عَذَابٗا دُونَ ذَٰلِكَ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ

47. Ya soló, babubi bakozala na etumbu mosusu likolo ya oyo ya liboso, kasi ebele na bango bazali koyeba te. info
التفاسير:

external-link copy
48 : 52

وَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ فَإِنَّكَ بِأَعۡيُنِنَاۖ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ حِينَ تَقُومُ

48. Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema. info
التفاسير:

external-link copy
49 : 52

وَمِنَ ٱلَّيۡلِ فَسَبِّحۡهُ وَإِدۡبَٰرَ ٱلنُّجُومِ

49. Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa. info
التفاسير: