Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo

Al-Anbiyâ

external-link copy
1 : 21

ٱقۡتَرَبَ لِلنَّاسِ حِسَابُهُمۡ وَهُمۡ فِي غَفۡلَةٖ مُّعۡرِضُونَ

1. Eleko ya kokata likambo ya bato ekomi pembeni, kasi bazali komitungisa te тропа yango mpe bapesi mokongo. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 21

مَا يَأۡتِيهِم مِّن ذِكۡرٖ مِّن رَّبِّهِم مُّحۡدَثٍ إِلَّا ٱسۡتَمَعُوهُ وَهُمۡ يَلۡعَبُونَ

2. Bokundoli moko te ya Nkolo na bango, ekomelaka bango ezanga te sé bayoka yango na kotiola. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 21

لَاهِيَةٗ قُلُوبُهُمۡۗ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّجۡوَى ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ هَلۡ هَٰذَآ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡۖ أَفَتَأۡتُونَ ٱلسِّحۡرَ وَأَنتُمۡ تُبۡصِرُونَ

3. Mitema mia bango mizali mosika, mpe babubi babebisi mitema mia bango, balobi: Oyo azali moto lokola bino тропа nini bozali komipesa na bondoki mpe bino bozali kornona malamu? info
التفاسير:

external-link copy
4 : 21

قَالَ رَبِّي يَعۡلَمُ ٱلۡقَوۡلَ فِي ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ

4. Alobi: Nkolo wa ngai ayebi manso mazali kolobama o likolo mpe na nsé, mpe azali moyoki atonda boyebi. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 21

بَلۡ قَالُوٓاْ أَضۡغَٰثُ أَحۡلَٰمِۭ بَلِ ٱفۡتَرَىٰهُ بَلۡ هُوَ شَاعِرٞ فَلۡيَأۡتِنَا بِـَٔايَةٖ كَمَآ أُرۡسِلَ ٱلۡأَوَّلُونَ

5. Kasi balobaki: Oyo wana ezali bosangani ya bandoto to ezali makambo naye moko, to ekoki kozala lisapo, to ayela biso elembo, ndenge etindamaki na bato ba yambo. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 21

مَآ ءَامَنَتۡ قَبۡلَهُم مِّن قَرۡيَةٍ أَهۡلَكۡنَٰهَآۖ أَفَهُمۡ يُؤۡمِنُونَ

6. Ezali na etuka (mboka) moko te eye topesaki etumbu liboso lia bango bandimaki te, boye bango nde bakondima? info
التفاسير:

external-link copy
7 : 21

وَمَآ أَرۡسَلۡنَا قَبۡلَكَ إِلَّا رِجَالٗا نُّوحِيٓ إِلَيۡهِمۡۖ فَسۡـَٔلُوٓاْ أَهۡلَ ٱلذِّكۡرِ إِن كُنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ

7. Mpe totindaki liboso nayo sé mibali topesaki bango emoniseli, botuna ba oyo bayebi soki bino boyebi te. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 21

وَمَا جَعَلۡنَٰهُمۡ جَسَدٗا لَّا يَأۡكُلُونَ ٱلطَّعَامَ وَمَا كَانُواْ خَٰلِدِينَ

8. Mpe topesaki bango nzoto mpo baliaka biloko, mpe batikalaki libela te. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 21

ثُمَّ صَدَقۡنَٰهُمُ ٱلۡوَعۡدَ فَأَنجَيۡنَٰهُمۡ وَمَن نَّشَآءُ وَأَهۡلَكۡنَا ٱلۡمُسۡرِفِينَ

9. Sima tokokiselaki bango elaka тропа oyo bazalaki kosala, mpe tobikisaki baye tolingaki kobikisa kati na bango, mpe topesaki etumbu na balekisi ndelo. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 21

لَقَدۡ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكُمۡ كِتَٰبٗا فِيهِ ذِكۡرُكُمۡۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ

10. Tosilaki ya soló, kokitisela bino buku eye ezuami na bokundoli тропа bino. Boye bozali kokanisa te? info
التفاسير: