Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo

An-Nahl

external-link copy
1 : 16

أَتَىٰٓ أَمۡرُ ٱللَّهِ فَلَا تَسۡتَعۡجِلُوهُۚ سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ

1. Mokano mwa Allah ezali koya, kasi bowelisa yango te. Nkembo naye azali likolo koleka na maye bazali kosangisa ye na yango. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 16

يُنَزِّلُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ بِٱلرُّوحِ مِنۡ أَمۡرِهِۦ عَلَىٰ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦٓ أَنۡ أَنذِرُوٓاْ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّآ أَنَا۠ فَٱتَّقُونِ

2. Azali kokitisa ba anzelu na emoniseli (buku) na mokano naye, likolo ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye ete: Bokebisa ete ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ngai, na yango bobanga ngai. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 16

خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّۚ تَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ

3. Akela likolo na mabele na bosóló, azali likolo lia baye bazali kosangisa (ye). info
التفاسير:

external-link copy
4 : 16

خَلَقَ ٱلۡإِنسَٰنَ مِن نُّطۡفَةٖ فَإِذَا هُوَ خَصِيمٞ مُّبِينٞ

4. Akeli moto na litanga ya mayi (ya mokongo), sima na yango moto akomi kotia tembe. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 16

وَٱلۡأَنۡعَٰمَ خَلَقَهَاۖ لَكُمۡ فِيهَا دِفۡءٞ وَمَنَٰفِعُ وَمِنۡهَا تَأۡكُلُونَ

5. Mpe akeli тропа bino bibwele, na yango bozali kozua ba mposo pona kosala bilamba na ba bolamu misusu, mpe misusu pona kolia. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 16

وَلَكُمۡ فِيهَا جَمَالٌ حِينَ تُرِيحُونَ وَحِينَ تَسۡرَحُونَ

6. Mpe esepelisaka bino na bonzenga tango bozongisaka yango na ndako na pokwa, mpe tango bobimisaka yango (na tongo) тропа kólia matiti. info
التفاسير: