73. Mpe totindaki epai ya bato ya thamúd, ndeko wa bango Swálih, alobi: Eh bato na ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye. Elembo esilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Oyo nâqah(1) ya Allah ezali elembo epai na bino, botika ye aliya na mabele ya Allah, kasi bosala ye mabe te noki te etumbu makasi ekozua bino.