74. Мре bokanisa tango totiyaki bino bakitani o sima ya bato ya aad mpe tovandisi bino na mabele, mpe botongaki bandako na lolenge ya pete, mpe botongi bisusu o kati ya bangomba. Kasi bokanisa bolamu bwa Allah boye asaleli bino, kasi bovanda na mabele na ndenge ya kobebisa te.
75. Bankumu baye basalaki lolendo kati na bato baye balobaki na baye bazalaki na bokoki te baye bandimaki: Boye bozali koyeba ya soló penza, Swâlih azali motindami kowuta epai ya Nkolo wa ye? Balobaki: ya soló, tondimi na maye atindamaki na yango.
77. Mpe babomaki nâqah(1) mpe basalaki lolendo na mibeko mia Nkolo wa bango, mpe balobi: Eh! Swâlih! Yela biso maye ozali kolaka biso soki ozali solo kati ya batindami.