3. Tango ntoma apesaki sekele na moko kati na basi naye mpe abimisi sekele wana, Allah ayebisaki ntoma naye likambo yango, mosusu mpe ayebisi ye te, mpe tango ntoma atunaki ye (mwasi naye) akamwaki mpe alobaki: Nani ayebisi yo yango? Ntoma azongiselaki ye ete: Ezali oyo atonda boyebi na basango nyoso nde ayebisi ngai.
4. Soki botubeli epai ya Allah, mitema na bino mipetuami, kasi soki bosalisani likolo naye, boyeba ete ya solo Allah azali mobateli naye, mpe anzelu Djibril lokola elongo na bandimi ya malamu, Mpe na sima ba anzelu bakosunga ye.
6. Oh bino bandimi! Bobatela milimo na bino mpe mabota na bino na moto oyo bankoni na yango bikozala bato na mabanga, bakengeli na yango ezali ba anzelu ya makasi, bazangisaka Allah botosi te na oyo atindi bango kosala, kasi bakokisaka nde oyo atindi bango kosala.
8. Oh bino bandimi! Botubela tubela ya bosóló epai ya Allah, Allah akoki kolimbisa masumu na bino, mpe akokotisa bino na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, mokolo oyo Allah akotiya mabe mosika na ntoma na baye bandimaki elongo naye, bongengi na bango ekotambola liboso na bango mpe na ngambo ya mobali mpe bakolobaka: Nkolo kokisela biso bongengi mpe limbisa biso, ya soló ozali na bokoki ya biloko nyoso.
9. Eh ntoma! Bundisa bapengwi na bato ya bilongi mibale mpe kozala mpete epai na bango te, mpe esika na bango ekozalaka nde lifelo, mpe esika nini ya bozongi ya mabe wana!
10. Allah abeti ndakisa ya bapengwi (mibale) mwasi ya Núh na mwasi ya Loth bazalaki na nsé ya maboko ya bawumbu na biso mibale, kasi nyoso mibale baboyaki kondima mpe basalaki bango mabe, kasi mabe na bango elongisaki bango te epai na Allah, mpe bayebisaki na bango mibale ete: Bokota na moto na baye bakokota.
11. Mpe Allah abeti ndakisa тропа baye bandimi, mwasi ya falo tango alobaki: Nkolo, tongela ngai ndako na lola ezala pene nayo, mpe longisa ngai na mabe ya falo na misala mia ye, mpe longisa ngai na bato mabe.