6. Bovandisa bango esika bozali kovanda, kasi bosala bango mabe te ya kokangela bango nzela ya libiki. Mpe soki bazali na zemi, bosalisa bango kino bakobota. Mpe soki bamelisi тропа bino (mwana ya sika), bopesa bango lifuta na bango mpe boyokana malamu kati na bino, mpe soki bozui kpokoso, boluka momelisi mosusu mpo amelisa ye.
7. Oyo azali na bozui ebele abimisa ebele ya bozui naye, kaši na oyo bozui naye ezali шоке, abimisa yango na ndenge oyo Allah apeși. Allah apesaka moto mokumba sé oyo apesi ye, sima ya kpokoso, Allah akopesa bozui.
8. Lokola baye baboyaki mibeko mia Allah mpe bazangaki kotosa batindami naye, tolandelaki bango na makasi mpe topesaki bango etumbu oyo ezali kati ya bitumbu ya mabe.
10. Allah abombeli bango etumbu ya makasi, eh bato ya mayele oyo bandima (na Allah na ntoma naye)! Bobanga Allah. Ya soló, Allah asila kokitisela bino bokundoli.
11. Motindami oyo azali kotangela bino mikapo mia polele, mpo abimisa bandimi na baye bazali kosala misala milamu na molili atia bango na bongengi. Oyo akondima na Allah mpe asali bolamu, akokotisa ye na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, akovandaka kati na yango libela na libela. Allah asila kobongisela ye bozui bolamu.
12. Allah mokeli ya likolo sambo mpe lolenge moko na mabele, mibeko mia ye mizali kokita kati na yango, mpo boyeba été ya soló, Allah azali na makoki likolo ya eloko nyoso, mpe ya solo, boyebi naye ezingi biloko binso.