5. Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Mpona nini bozali kotungisa ngai mpe boyebi été nazali motindami ya Allah epai na bino? Mpe tango bapengwaki, Allah mpe apengwisi mitema mia bango. Mpe Allah akambaka bato mabe te.
1 Ahmad: Моко ya bakombo ya ntoma, Muhammad oyo azali suka ya bantoma.
6. Mpe tango Issa mwana ya Maryam alobaki na bana ya isalayele: Ya soló, nazali motindami ya Allah epai na bino (тропа kolobela) bosôló oyo ezali na kati ya torah, тре kopesa bino sango elamu ya motindami oyo akoya sima na ngai nkombo naye Ahmad(1). Mpe tango ayeli bango bilembo bia polele, balobi: Oyo ezali bonganga ya polele.
1 Ahmad: Моко ya bakombo ya ntoma, Muhammad oyo azali suka ya bantoma.
9. Ye nde atindaki motindami naye na bokambi mpe lingomba ya soló, mpo ete ezala likolo lia mangomba manso, ata soki basambeli ya bikeko bazali koboya.
11. Bondima na Allah na motindami naye, mpe bobunda na nzela ya Allah na misolo mia bino mpe milimo mia bino. Wana ezali malamu тропа bino, soki bozali koyeba.
12. Akolimbisa masumu na bino mpe akokotisa bino na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, mpe bisika ya kovanda ya kitoko bikozalaka na lola ya eden. Wana nde elonga ya monene.
14. Oh bino bandimi! Bozala basalisi ya Allah, lokola Issa mwana ya Maryam alobaki na bayekoli naye ete: Nani akosalisa ngai тропа Allah? Bayekoli balobaki ete: Tozali basalisi ya Allah, mpe eteni moko kati na bana ya isalayele bandimaki, mpe eteni mosusu bapengwaki, mpe tosungaki bato oyo bandimaki likolo na banguna na bango mpe balongaki.