93. Mpe nani azali moto mabe koleka moto oyo alobi lokuta na nkombo ya Allah? То mpe azali koloba ete: Bapesi ngai emoniseli, nzoka nde bakitiseli ye eloko te? To mpe oyo akoloba: Nakokitisa emoniseli ndenge Allah akitisi? Mpe soki okomona bato mabe ndenge bakozala o kati ya molangwa ya liwa, mpe ba anzelu bakotandela bango maboko:(1) Bobimisa milimo na bino, lelo bokozua etumbu ya kosilisa lokumu тропа maye bozalaki koloba bosembo te na nkombo ya Allah, mpe bozalaki kosala lolendo na mikapo naye.
1 Bakobeta bango na tango milimo na bango ezali kobima.