4. Ye nde akela mapata na mabele na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende, ayebi maye makotaka na mabele, mpe maye mabimaka kati na yango, mpe maye makitaka kowuta na likolo mpe maye makotaka o likolo, mpe azali na bino(1) esika nyoso bozuami. Mpe Allah azali kornona maye bozali kosala.
7. Bondima na Allah na motindami naye, mpe na maye asimbisi bino ya bozui bobimisa yango, baye kati na bino bandimi mpe babimisi (тропа Allah), bakozua lifuta linene.
8. Mpona nini bozali kondima na Allah te mpe motindami, azali kobenga bino mpo bondimela Nkolo wa bino? Mpe (Allah) asili kozua elaka na bino, soki bozali bandimi.
9. Ye nde akitisaka mikapo ya polele epai ya mowumbu naye, mpo elongola bino na molili (bökende) na bongengi. Mpe ya soló, Allah azali na mawa mingi mpona bino atonda boboto.
10. Nini ekopekisa bino kobimisa na nzela ya Allah nzoka nde epai ya Allah nde bankita ya likolo na ya nsé bikozonga? Oyo okati na bino abimisaki bozui naye, mpe abundaki liboso ya kokweya (ya makkah) akokani te na oyo abimisi bozui naye sima ya kokweya (ya makkah) mpe abundi, kasi bango banso bazali na bolamu oyo Allah alaki bango (lola). Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala.
12. Mokolo oyo bandimi ya mibali na basi bakomonaka bongengi na bango ezali koleka bango liboso na ngambu ya loboko ya mobali bakoyebisaka bango: Lelo bozali na sango elamu, bokovanda libela na lola oyo ezali kolekisa mingala önse na yango. Wana nde ezali elonga enene.
13. Mokolo oyo bato ya bilongi mibale ya mibali mpe basi bakoloba na bandimi ete: Bozela biso mpo tozua moke ndambu ya bongengi na bino, (bandimi) bakoloba na bango ete: Mwinda ezali sima na bino,bozongaтропа kozua yango, na sima ezipeli moko ekokabola bango okati na yango ezali ngolu, mpe libanda na yango ezali etumbu.
14. Bakobelela bango ete: Tozalaki na bino elongo te? Bakozongisa ete: Iyo, kasi bomitiaki kati na komekama, mpe bosalaki likita ya mabe likolo ya bandimi, mpe botiaki tembe mpe elikia ya lokuta ekosaki bino kino mokano ya Allah ezuaki bino, (liwa likomeli bango) mpe mokosi (satana) akosaki bino тропа Allah.
18. Ya soló, baye kati ya mibali mpe ya basi bazali kosala bolamu mpe bakotiseli Allah nyongo ya malamu, bakobakisela bango yango mpe bakozua lifuta lilamu.
19. Мре тропа baye bandima na Allah na batindami naye, bango nde bato ya bosôló, тре (bazali) banzeneneke epai ya Nkolo wa bango, тре bakozua lifuta na bongengi bwa bango. Мре тропа baye bapengwaki тре baboyaki kondima na bilembo bia biso, bango nde bato ya moto.
20. Boyeba ete: Bomoyi ya nsé ezali sé lisano тре liseki, bonzenga, тре kowelana na lolendo kati na bino тропа bozui тре bana, yango ezali lokola mbula oyo ebeti ebimisi milona ya kitoko mizali kokamwisa bakati bilanga, sima ya tango токе, elembi mpe ekomi na langi ya mosaka mpe ekauki, kasi na mokolo ya suka etumbu ya makasi ekozala, bolimbisi mpe esengo ya Allah ekozala, na yango. Bomoyi ya mokili ezali sé bisengo ya tango токе.
21. Bowelisa kosenga bolimbisami ya Nkolo na bino, na lola ya monene lokola likolo na mabele, elengelami тропа baye bandimaki na Allah na batindami naye. Wana ezali bolamu ya Allah, apesaka yango na oyo alingi. Mpe Allah azali Nkolo bolamu ya monene.
25. Tosilaka kotinda batindami na biso na bilembetele, mpe tokitiselaki bango buku na emekelo mpo bato basalela bosembo, mpe tokitisaki libende ezala na makasi mingi, mpe mpo esalisa bato, mpo ete Allah ayeba nani oyo akosunga ye, na batindami naye na (lolenge) ya kobombama. Ya sólo Allah azali na bokasi atonda nguya.
26. Mpe tosilaki kotinda Núh na Ibrâhîm, mpe totiaki na bakitani na bango bontoma na buku, kati na bango basusu bakambami, mpe ebele na bango bazali mabe.
27. Mpe tolandisaki sima na bango batindami na biso, mpe tolandisaki Issa mwana ya Maryam mpe topesaki ye indjil mpe totiaki boboto mpe ngolu o mitema ya baye balandaki ye. Kasi kimupe oyo bazalaki na yango na sima, totindaki bango kosala yango te, kasi baluka nde bosepeli ya Allah, mpe basalelaki yango te ndenge esengelaki, na yango, topesaki baye bandimi kati na bango lifuta na bango. Kasi ebele na bango bazali mabe.
29. Wana ezali mpo baye bazua buku liboso bayeba été: Bazali na makoki moko te likolo ya ngrásia ya Allah, mpo ete ya soló, bolamu ezali nde na maboko ya Allah, apesaka yango na moto oyo alingi. Mpe Allah atonda bolamu koleka.