31. Mpe maye manso mazali na likolo mpe na nsé ezali ya Allah, mpo afuta baye basali mabe mpo na misala na bango, mpe afuta baye basali malamu тропа misala na bango.
32. Baye bazali komitiya mosika na masumu ya minene, bazali sé kokweya na mwa mabunga ya mike mike, ya sólo Nkolo wa yo azali na bolimbisi bonene. Azali na boyebi koleka bino, ayebi malamu lolenge akelaki bino kowuta na mabele,mpe tango oyo bozalaki litono ya makila okati ya mabumu ya bamama na bino. Bomikumisa te na kondima, ye nde ayebi nani azali kobanga ye mpenza.
التفاسير:
33:53
أَفَرَءَيۡتَ ٱلَّذِي تَوَلَّىٰ
33. Omoni te oyo azali kopesa mokongo?
التفاسير:
34:53
وَأَعۡطَىٰ قَلِيلٗا وَأَكۡدَىٰٓ
34. Mpe apesaka sé moke (suka na yango) akati kopesa.
التفاسير:
35:53
أَعِندَهُۥ عِلۡمُ ٱلۡغَيۡبِ فَهُوَ يَرَىٰٓ
35. Boye azali na boyebi ya mabombami nde azali kornona?
التفاسير:
36:53
أَمۡ لَمۡ يُنَبَّأۡ بِمَا فِي صُحُفِ مُوسَىٰ
36. To boye bayebisaki ye te na ntina ya makomi ya Mûssa?
التفاسير:
37:53
وَإِبۡرَٰهِيمَ ٱلَّذِي وَفَّىٰٓ
37. Na ya Ibrâhîm oyo akokisaki elaka,
التفاسير:
38:53
أَلَّا تَزِرُ وَازِرَةٞ وِزۡرَ أُخۡرَىٰ
38. Moto moko te akomema lisumu ya moninga,
التفاسير:
39:53
وَأَن لَّيۡسَ لِلۡإِنسَٰنِ إِلَّا مَا سَعَىٰ
39. Kasi ya soló, moto akozuaka sé na molende naye.
التفاسير:
40:53
وَأَنَّ سَعۡيَهُۥ سَوۡفَ يُرَىٰ
40. Mpe ya sólo, molende naye ekomonana,
التفاسير:
41:53
ثُمَّ يُجۡزَىٰهُ ٱلۡجَزَآءَ ٱلۡأَوۡفَىٰ
41. Sima, akofutama mpenza malamu.
التفاسير:
42:53
وَأَنَّ إِلَىٰ رَبِّكَ ٱلۡمُنتَهَىٰ
42. Mpe ya sólo, nyoso ekosukisama epai ya Nkolo wayo,