4. Ye nde akitisaka kimia о mitema mia bandimi mpo ebakisela bango kondima likolo ya kondima na bango, mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
5. Mpo akotisa bandimi ya mibali na ya basi okati ya Iola oyo ezali koleka na nsé na yango míngala, bakozalaka libela kati na yango, mpe bakozimisa masumu na bango. Mpe wana ekozala elonga monene epai ya Allah.
6. Мре apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi baye bazali kosalela Allah mabe, ndenge moko mpe lokola basangisi Allah ya mibali mpe ya basi bazali kokanisela Allah mabe, makanisi yango ya mabe ekokwela bango, mpe Allah asilikeli bango, mpe alakeli bango botutu, mpe alengeleli bango lifelo. Mpe oyo bozongi ya mabe.