69. Mpe mabele makotondaka na bongengi bwa Nkolo na yango, mpe bakotiyaka buku (ya misala nyoso oyo moto asalaki), mpe bakoyaka na bantoma na banzeneneke, mpe bakokataka kati kati na bango na bosôló, mpe bango bakobubamaka te.
71. Mpe тропа baye bapengwaki, bakomema bango lisanga okati na lifelo, soki bakomi, bizipeli na yango bikofungwama, mpe bakengeli na yango bakoloba na bango: Boye bayelaki bino batindami (na bakebisi) kowuta na bino moko te mpo batangela bino mikapo mia Nkolo wa bino mpe bakebisa bino тропа elaka ya mokolo mwa bino ya lelo? Bakoyanolaka: Iyo; kasi ya soló elaka ya etumbu ekokisami likolo ya bapengwi.
73. Mpe bakomema baye babangaki Nkolo wa bango lisanga okati ya lola, soki bakomi, bakofungolelaka bango bizipeli bia yango, mpe bakengeli na yango bakolobaka na bango: Kimia ezala likolo na bino, bozalaki malamu, bokota mpe bovanda libela kati na yango.
74. Мре bakolobaka: Matondo na Allah oyo akokiseli biso elaka, mpe akitanisi biso mabele (ya Iola), ya soló tokovandaka na Iola esika nyoso tokolinga. Ya solo lifuta lia babongisi lileki kitoko.