21. Eh bino baye bondima! В olanda makolo (nzela) ya satana te, oyo akolanda makolo naye, (boyeba ete) ya sólo, ye atindaka na mobulu mpe na mabe mpe soki Allah alingelaka bino bolamu na mawa naye te, alingaki kopetola moto o kati na bino te, kasi Allah apetolaka oyo alingi, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi.
22. Mpe bato ya bomengo mpe ya bolamu kati na bino balapa te ete bakosalisa lisusu bandeko ba bango te, babola mpe te, bakosalisa mpe ba oyo babimi na nzela ya Allah te, esengeli na bango kolimbisa mpe kobosana, bokosepela te ete Allah alimbisa bino? Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
23. Ya sôló, baye bazali kofinga mpe kopanzela basi ya malamu baye bakanisaka kosala mabe te (ekobo), okati ya bandimi ya basi, bapesami botutu awa o nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe bakozalaka na etumbu ekasi.
26. Basi ya mabe тропа mibali ya mabe mpe mibali ya mabe тропа basi ya mabe, lolenge moko basi ya malamu тропа mibali ya malamu, mpe mibali ya malamu тропа basi ya malamu. Bango wana nde bazali mosika na makambo ya mabe oyo bato bazali koloba, bazali na bolimbisi mpe bozui ya malamu.
27. Eh, bino baye bondima! Bokota na bandako oyo bizali bandako bia bino te, kino ete bosenga ndingisa, mpe bopesa mbote ya boboto epai ya bato na yango. Wana ezali malamu тропа bino mpo bokoka kokanisa.