58. Baye wana bantoma baye Allah atondisaki bolamu naye likolo na bango kati ya libota ya Adam, na baye bazalaki elongo na Nûh (okati ya masuwa), mpe libota lia Ibrâhîm mpe Isalayele, mpe basusu baye tokambaki mpe toponaki, soki mikapo mia Ar-Rahmân(1) mizali kotangama, bakweyaka na kofukama na kolela.
61. (Bakozala) na elanga ya edeni eye Ar-Rahmân alakaki yango bawumbu naye, baye bandimaki na (mabombami na yango). Ya soló, elaka naye ezali na tembe te.
64. Tokitaka te sé na mitindo mia Nkolo wa yo, manso maye mazali liboso lia biso mpe osima na biso na maye manso mazwami o kati kati na yango mibale mazali yaye. Mpe Nkolo wayo abosanaka te.