61. Mpe (totindaki) epai ya bato ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah. Bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye. Ye nde akela bino kowuta na mabele, mpe akomisi bino ebele o kati na yango. Bosenga ye bolimbisi, sima botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azalaka pene тропа koyanola. (ba mbela)