6. Мре ezali na nyama(1) moko te na mabele sé bozui naye ezali kowuta epai ya Allah, mpe ayebi esika avandaka, na esika abombamaka. Nyoso esila kokomama o kati ya buku ya polele ya bosembo.
1 Nyama: Elakisi: Bikelamo nionso oyo etambolaka likolo ya mabele, bótala mpe na suratu: Al-An’ám(Banyama) mokapo: 38.
7. Mpe ye nde akela mapata na mabele sima ya mikolo motoba, mpe ngwende naye ezalaki likolo ya mayi. Mpo ete ameka bino mpe ayeba nani kati na bino akosala misala ya malamu, mpe soki alobi na bango ete: Ya soló bino bokosekwa sima ya liwa na bino, baye bapengwa bakolobaka été: Ya soló, oyo ezali bondoki ya polele.
12. Tango mosusu ozali kosundola ndambu ya maye makiteli yo, mpe motema nayo etondi na pasi ndenge bazali kotiola yo na koloba: Mpona nini bakitiseli ye sanduku ya bomengo te to тре anzelu aya epai naye? Yo ozali sé mokebisi. Mpe Allah azali mobateli ya biloko binso.