《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌

页码:close

external-link copy
7 : 4

لِّلرِّجَالِ نَصِيبٞ مِّمَّا تَرَكَ ٱلۡوَٰلِدَانِ وَٱلۡأَقۡرَبُونَ وَلِلنِّسَآءِ نَصِيبٞ مِّمَّا تَرَكَ ٱلۡوَٰلِدَانِ وَٱلۡأَقۡرَبُونَ مِمَّا قَلَّ مِنۡهُ أَوۡ كَثُرَۚ نَصِيبٗا مَّفۡرُوضٗا

7. Mibali bakozua eteni na kati ya bozui eye baboti batikaki, mpe bato ya libota, basi mpe bazali na eteni okati ya bozui eye baboti batikaki, lolenge mpe bato basusu ya libota, bozui yango ezala moke to ebele ezali eteni ya lotomo. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 4

وَإِذَا حَضَرَ ٱلۡقِسۡمَةَ أُوْلُواْ ٱلۡقُرۡبَىٰ وَٱلۡيَتَٰمَىٰ وَٱلۡمَسَٰكِينُ فَٱرۡزُقُوهُم مِّنۡهُ وَقُولُواْ لَهُمۡ قَوۡلٗا مَّعۡرُوفٗا

8. Mpe soki bato ya zinga zinga ya libota, Mpe bana bitike mpe babola bayei kotelema na mokolo ya kokabola nkita ya bawei, esengeli kopesa bango mwa eloko okati ya nkita wana. Mpe bolobela bango maloba ya malamu. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 4

وَلۡيَخۡشَ ٱلَّذِينَ لَوۡ تَرَكُواْ مِنۡ خَلۡفِهِمۡ ذُرِّيَّةٗ ضِعَٰفًا خَافُواْ عَلَيۡهِمۡ فَلۡيَتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلۡيَقُولُواْ قَوۡلٗا سَدِيدًا

9. Kasi baye bazali na mikumba ya bana bitike babanga konyokolo bango lolenge moko babangaka kokufa, mpe kotika bana na bango ya mike na sima ete banyokwama te, esengeli na bango kobanga Allah, mpe balobaka na bana bitike maloba ya malamu. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 4

إِنَّ ٱلَّذِينَ يَأۡكُلُونَ أَمۡوَٰلَ ٱلۡيَتَٰمَىٰ ظُلۡمًا إِنَّمَا يَأۡكُلُونَ فِي بُطُونِهِمۡ نَارٗاۖ وَسَيَصۡلَوۡنَ سَعِيرٗا

10. Ya sôló baye bazali kolia misolo ya bana bitike na lolenge ya mabe, ya sôló bazali kolia móto okati ya mabumu na bango. Mpe bakokota okati ya móto oyo ezali kopela. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 4

يُوصِيكُمُ ٱللَّهُ فِيٓ أَوۡلَٰدِكُمۡۖ لِلذَّكَرِ مِثۡلُ حَظِّ ٱلۡأُنثَيَيۡنِۚ فَإِن كُنَّ نِسَآءٗ فَوۡقَ ٱثۡنَتَيۡنِ فَلَهُنَّ ثُلُثَا مَا تَرَكَۖ وَإِن كَانَتۡ وَٰحِدَةٗ فَلَهَا ٱلنِّصۡفُۚ وَلِأَبَوَيۡهِ لِكُلِّ وَٰحِدٖ مِّنۡهُمَا ٱلسُّدُسُ مِمَّا تَرَكَ إِن كَانَ لَهُۥ وَلَدٞۚ فَإِن لَّمۡ يَكُن لَّهُۥ وَلَدٞ وَوَرِثَهُۥٓ أَبَوَاهُ فَلِأُمِّهِ ٱلثُّلُثُۚ فَإِن كَانَ لَهُۥٓ إِخۡوَةٞ فَلِأُمِّهِ ٱلسُّدُسُۚ مِنۢ بَعۡدِ وَصِيَّةٖ يُوصِي بِهَآ أَوۡ دَيۡنٍۗ ءَابَآؤُكُمۡ وَأَبۡنَآؤُكُمۡ لَا تَدۡرُونَ أَيُّهُمۡ أَقۡرَبُ لَكُمۡ نَفۡعٗاۚ فَرِيضَةٗ مِّنَ ٱللَّهِۗ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ عَلِيمًا حَكِيمٗا

11. Allah atieli bino mobeko mpona bana na bino (na likambo litali bokitani): Mwana mobali akozua bozui ya motuya ya bana basi mibale. Mpe soki bana basi bazali Mibale to Koleka, bakozua mibale ya misato ya maye moweyi atikaki, mpe soki azali sé ye moko mwana mwasi akozua kati kati ya bozui, kasi baboti ya moweyi moko na moko akozua moko ya motoba ya maye mowei atikaki, soki moweyi atikaki mwana, kasi soki atikaki mwana te mama naye akozua moko ya misato, mpe soki azali na bandeko, mama naye akozua moko ya motoba, wana ekozala sima yako futa nyongo to mpe malako atikaki; batata na bino na bana na bino boyebi te nani kati na bango akosalisa bino, wana ezali lotomo kowuta epayi ya Allah, ya sôló Allah azali na boyebi atonda bwanya. info
التفاسير: