《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌

页码:close

external-link copy
21 : 32

وَلَنُذِيقَنَّهُم مِّنَ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡأَدۡنَىٰ دُونَ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡأَكۡبَرِ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ

21. Mpe ya soló, tokomekisa bango etumbu ya moke awa na mokili, yambo ya etumbu ya monene mpo tango mosusu bakozonga. (o nzela ya semba) info
التفاسير:

external-link copy
22 : 32

وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّن ذُكِّرَ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِۦ ثُمَّ أَعۡرَضَ عَنۡهَآۚ إِنَّا مِنَ ٱلۡمُجۡرِمِينَ مُنتَقِمُونَ

22. Mpe nani azali mabe penza koleka moto oyo soki mikapo mia Nkolo wa ye mizali kotangema sima apesi yango mokongo? Ya solo, tokozua batomboki (lolenge bazalaki kosala). info
التفاسير:

external-link copy
23 : 32

وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ فَلَا تَكُن فِي مِرۡيَةٖ مِّن لِّقَآئِهِۦۖ وَجَعَلۡنَٰهُ هُدٗى لِّبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ

23. Mpe topesaki Mûssa buku, mpe kozala na tembe te тропа bokutani na ye,(1) mpe totiyaki ye azala mokambi ya bana ya isalayele. info

1 Ye: Yo Muhammad kozala na tembe te тропа bokutani nayo na Mûssa o eleko ya mobembo nayo ya butu.

التفاسير:

external-link copy
24 : 32

وَجَعَلۡنَا مِنۡهُمۡ أَئِمَّةٗ يَهۡدُونَ بِأَمۡرِنَا لَمَّا صَبَرُواْۖ وَكَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا يُوقِنُونَ

24. Mpe totiyaki bakambi kati na bango, ete bakamba na mitindo mia biso, mpo ete bakangaki mitema mpe bandimaki na mikapo mia biso. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 32

إِنَّ رَبَّكَ هُوَ يَفۡصِلُ بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ

25. Ya soló, Nkolo wayo nde akokataka o kati kati na bango o mokolo mwa suka na maye bazalaki na bokabwani. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 32

أَوَلَمۡ يَهۡدِ لَهُمۡ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِن قَبۡلِهِم مِّنَ ٱلۡقُرُونِ يَمۡشُونَ فِي مَسَٰكِنِهِمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٍۚ أَفَلَا يَسۡمَعُونَ

26. Boye bamoni te ete tobomaki ebele ya bato baleka liboso bazali kotambola na bandako na bango? Ya soló wana ezali bilembo. Boye тропа nini bayokaka te? info
التفاسير:

external-link copy
27 : 32

أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا نَسُوقُ ٱلۡمَآءَ إِلَى ٱلۡأَرۡضِ ٱلۡجُرُزِ فَنُخۡرِجُ بِهِۦ زَرۡعٗا تَأۡكُلُ مِنۡهُ أَنۡعَٰمُهُمۡ وَأَنفُسُهُمۡۚ أَفَلَا يُبۡصِرُونَ

27. Boye bazali koyeba te, tozali kotindika mayi na mabele oyo ekauka, mpe tobimisi na yango milona miye bazali kolia yango bango moko na bibwele na bango? Boye bazali kornona te? info
التفاسير:

external-link copy
28 : 32

وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡفَتۡحُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

28. Mpe bazali koloba: Elonga ekozala tango nini soki bozali na bosölo? info
التفاسير:

external-link copy
29 : 32

قُلۡ يَوۡمَ ٱلۡفَتۡحِ لَا يَنفَعُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِيمَٰنُهُمۡ وَلَا هُمۡ يُنظَرُونَ

29. Loba: Mokolo mwa elonga mokosalisaka bapengwi te na bondimi bwa bango, mpe bakotikelaka bango tango te. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 32

فَأَعۡرِضۡ عَنۡهُمۡ وَٱنتَظِرۡ إِنَّهُم مُّنتَظِرُونَ

30. Zala na bango mosika, mpe zela, ya sólo bango mpe bazali kozela. info
التفاسير: