Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo

Numero ng Pahina:close

external-link copy
40 : 44

إِنَّ يَوۡمَ ٱلۡفَصۡلِ مِيقَٰتُهُمۡ أَجۡمَعِينَ

40. Ya sólo, o mokolo mwa bokati (makambo ya bato) nde ekozalaka elaka na bango banso. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 44

يَوۡمَ لَا يُغۡنِي مَوۡلًى عَن مَّوۡلٗى شَيۡـٔٗا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ

41. Mokolo moye moninga to moto ya pene akosalisaka yo na eloko te, mpe bakosunganaka te. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 44

إِلَّا مَن رَّحِمَ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

42. Longola sé oyo Allah akoyokelaka mawa. Ya soló, ye azali wa bokasi atonda ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
43 : 44

إِنَّ شَجَرَتَ ٱلزَّقُّومِ

43. Ya soló nzete ya Zaqqúm. info
التفاسير:

external-link copy
44 : 44

طَعَامُ ٱلۡأَثِيمِ

44. Ekozalaka bilei ya basumuki. info
التفاسير:

external-link copy
45 : 44

كَٱلۡمُهۡلِ يَغۡلِي فِي ٱلۡبُطُونِ

45. Lokola mafuta ya mabe, ezali kotokisa libumu. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 44

كَغَلۡيِ ٱلۡحَمِيمِ

46. Lokola kotoko ya mayi ya moto ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
47 : 44

خُذُوهُ فَٱعۡتِلُوهُ إِلَىٰ سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ

47. Bozua ye mpe bomema ye o kati ya moto. info
التفاسير:

external-link copy
48 : 44

ثُمَّ صُبُّواْ فَوۡقَ رَأۡسِهِۦ مِنۡ عَذَابِ ٱلۡحَمِيمِ

48. Sima bobwakela ye mayi ya moto na motu naye, lokola etumbu makasi. info
التفاسير:

external-link copy
49 : 44

ذُقۡ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡكَرِيمُ

49. Meka, ya sólo, yo (okanisaki ete) ozali na bokasi mpe lokumu! info
التفاسير:

external-link copy
50 : 44

إِنَّ هَٰذَا مَا كُنتُم بِهِۦ تَمۡتَرُونَ

50. Wana nde maye bozalaki kotiya tembe mpe kobundisa. info
التفاسير:

external-link copy
51 : 44

إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي مَقَامٍ أَمِينٖ

51. Ya sólo, babangi bakozalaka na bovandi bwa kitoko. info
التفاسير:

external-link copy
52 : 44

فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ

52. Kati na bilanga na mingala (mia lola) info
التفاسير:

external-link copy
53 : 44

يَلۡبَسُونَ مِن سُندُسٖ وَإِسۡتَبۡرَقٖ مُّتَقَٰبِلِينَ

53. Bakolataka bilamba bia pepele ya pembe bitongama bazali kotalana. info
التفاسير:

external-link copy
54 : 44

كَذَٰلِكَ وَزَوَّجۡنَٰهُم بِحُورٍ عِينٖ

54. Na yango, tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene. info
التفاسير:

external-link copy
55 : 44

يَدۡعُونَ فِيهَا بِكُلِّ فَٰكِهَةٍ ءَامِنِينَ

55. Mpe na kimia penza bakosengaka kati na yango bambuma kitoko ya lolenge nyoso. info
التفاسير:

external-link copy
56 : 44

لَا يَذُوقُونَ فِيهَا ٱلۡمَوۡتَ إِلَّا ٱلۡمَوۡتَةَ ٱلۡأُولَىٰۖ وَوَقَىٰهُمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ

56. Liwa likozuaka bango te, sé oyo ya liboso mpe abateli (Allah) bango na etumbu ya lifelo. info
التفاسير:

external-link copy
57 : 44

فَضۡلٗا مِّن رَّبِّكَۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ

57. Bolamu ya Nkolo wayo. Wana nde elonga ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
58 : 44

فَإِنَّمَا يَسَّرۡنَٰهُ بِلِسَانِكَ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ

58. Mpe ya soló, tokomisaki yango mpete na lolemu nayo mpo ete; basalisana na yango na bokundoli. info
التفاسير:

external-link copy
59 : 44

فَٱرۡتَقِبۡ إِنَّهُم مُّرۡتَقِبُونَ

59. Zela moke, bango mpe bakozela. info

1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.

التفاسير: