Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo

external-link copy
158 : 2

۞ إِنَّ ٱلصَّفَا وَٱلۡمَرۡوَةَ مِن شَعَآئِرِ ٱللَّهِۖ فَمَنۡ حَجَّ ٱلۡبَيۡتَ أَوِ ٱعۡتَمَرَ فَلَا جُنَاحَ عَلَيۡهِ أَن يَطَّوَّفَ بِهِمَاۚ وَمَن تَطَوَّعَ خَيۡرٗا فَإِنَّ ٱللَّهَ شَاكِرٌ عَلِيمٌ

158. Ya sôló ngomba ya Swafâ na Mar’wa(1) ezali kati ya bilembo ya Allah. Mpe oyo akosala mobembo enene o ndako esantu, too mobembo eke, ezali lisumu te mpona ye kotambola kati kati ya ngomba wana mibale. Kasi oyo akobakisa bolamu mosusu, ya sôló Allah azali wa botondi atonda boyebi. info

1 Swafá na Mar’wa: Ezali bakombo ya ngomba mibale oyo ezali penepene na ndako esanto na Makkah.

التفاسير: