Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo

Numero ng Pahina:close

external-link copy
249 : 2

فَلَمَّا فَصَلَ طَالُوتُ بِٱلۡجُنُودِ قَالَ إِنَّ ٱللَّهَ مُبۡتَلِيكُم بِنَهَرٖ فَمَن شَرِبَ مِنۡهُ فَلَيۡسَ مِنِّي وَمَن لَّمۡ يَطۡعَمۡهُ فَإِنَّهُۥ مِنِّيٓ إِلَّا مَنِ ٱغۡتَرَفَ غُرۡفَةَۢ بِيَدِهِۦۚ فَشَرِبُواْ مِنۡهُ إِلَّا قَلِيلٗا مِّنۡهُمۡۚ فَلَمَّا جَاوَزَهُۥ هُوَ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ قَالُواْ لَا طَاقَةَ لَنَا ٱلۡيَوۡمَ بِجَالُوتَ وَجُنُودِهِۦۚ قَالَ ٱلَّذِينَ يَظُنُّونَ أَنَّهُم مُّلَٰقُواْ ٱللَّهِ كَم مِّن فِئَةٖ قَلِيلَةٍ غَلَبَتۡ فِئَةٗ كَثِيرَةَۢ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ

249. Mpe, tango Twâlût alingaki kokende na mapinga, alobaki ete: Ya sôló Allah akomeka bino na mayi ya ebale. Oyo kati na bino akomela yango azali ya ngai te, mpe oyo akomeka yango te yende azali wa ngai, longola sé oyo akotoka mwa moke na loboko naye. Kasi ebele na bango bamelaki mayi, sé moke kati na bango bandimaki naye. Mpe tango ye na bandimi baye bazalaki naye bakatisaki ebale, balobaki ete: Biso lelo tozali na nguya te liboso ya Djâlût na mampinga naye. Kasi misusu kati na bango bakanisaka ete bakokutana na Allah balobaki ete: Boniboni mapinga moke malongi mapinga ya monene na ndingisa ya Allah? Mpe Allah azali elongo na baye bazali koyika mpiko. info
التفاسير:

external-link copy
250 : 2

وَلَمَّا بَرَزُواْ لِجَالُوتَ وَجُنُودِهِۦ قَالُواْ رَبَّنَآ أَفۡرِغۡ عَلَيۡنَا صَبۡرٗا وَثَبِّتۡ أَقۡدَامَنَا وَٱنصُرۡنَا عَلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡكَٰفِرِينَ

250. Mpe tango bakutani na Djâlût na mampinga naye, balobaki ete: Eh Nkolo! pesa biso motema makasi, mpe lendisa matambi ma biso mpe opesa biso elonga likolo ya bapagano. info
التفاسير:

external-link copy
251 : 2

فَهَزَمُوهُم بِإِذۡنِ ٱللَّهِ وَقَتَلَ دَاوُۥدُ جَالُوتَ وَءَاتَىٰهُ ٱللَّهُ ٱلۡمُلۡكَ وَٱلۡحِكۡمَةَ وَعَلَّمَهُۥ مِمَّا يَشَآءُۗ وَلَوۡلَا دَفۡعُ ٱللَّهِ ٱلنَّاسَ بَعۡضَهُم بِبَعۡضٖ لَّفَسَدَتِ ٱلۡأَرۡضُ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ ذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ

251. Balongaki bango na ndingisa ya Allah, mpe Dâwud abomaki Djâlût. Mpe Allah apesaki ye bokonzi mpe bwanya, mpe atangisaki ye makambo misusu ye (Allah) alingaki. Mpe soki Allah akotelaka bato likolo ya misusu te, nde mokili molingaki kokoma na mobulu, kasi Allah nde azali Nkolo ya bolamu okati ya mikili. info
التفاسير:

external-link copy
252 : 2

تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱللَّهِ نَتۡلُوهَا عَلَيۡكَ بِٱلۡحَقِّۚ وَإِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

252. Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo yango na bosôló. Mpe ya sôló ozali moko okati ya batindami. info
التفاسير: