పవిత్ర ఖురాన్ యొక్క భావార్థాల అనువాదం - లింగాల అనువాదం - ముహమ్మద్ బల్నుగు

At-Tahrîm

external-link copy
1 : 66

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ لِمَ تُحَرِّمُ مَآ أَحَلَّ ٱللَّهُ لَكَۖ تَبۡتَغِي مَرۡضَاتَ أَزۡوَٰجِكَۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ

1. Eh ntoma! Mpona nini na bosepelisi basi nayo ozali komipekisa na maye Allah apesi yo ndingisa. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 66

قَدۡ فَرَضَ ٱللَّهُ لَكُمۡ تَحِلَّةَ أَيۡمَٰنِكُمۡۚ وَٱللَّهُ مَوۡلَىٰكُمۡۖ وَهُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ

2. Allah asila kokomela bino ya soló komisikola mpona kolapa na bino. Allah nde mokonzi na bino mpe azali moyebi atonda bwanya. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 66

وَإِذۡ أَسَرَّ ٱلنَّبِيُّ إِلَىٰ بَعۡضِ أَزۡوَٰجِهِۦ حَدِيثٗا فَلَمَّا نَبَّأَتۡ بِهِۦ وَأَظۡهَرَهُ ٱللَّهُ عَلَيۡهِ عَرَّفَ بَعۡضَهُۥ وَأَعۡرَضَ عَنۢ بَعۡضٖۖ فَلَمَّا نَبَّأَهَا بِهِۦ قَالَتۡ مَنۡ أَنۢبَأَكَ هَٰذَاۖ قَالَ نَبَّأَنِيَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡخَبِيرُ

3. Tango ntoma apesaki sekele na moko kati na basi naye mpe abimisi sekele wana, Allah ayebisaki ntoma naye likambo yango, mosusu mpe ayebisi ye te, mpe tango ntoma atunaki ye (mwasi naye) akamwaki mpe alobaki: Nani ayebisi yo yango? Ntoma azongiselaki ye ete: Ezali oyo atonda boyebi na basango nyoso nde ayebisi ngai. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 66

إِن تَتُوبَآ إِلَى ٱللَّهِ فَقَدۡ صَغَتۡ قُلُوبُكُمَاۖ وَإِن تَظَٰهَرَا عَلَيۡهِ فَإِنَّ ٱللَّهَ هُوَ مَوۡلَىٰهُ وَجِبۡرِيلُ وَصَٰلِحُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَۖ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ بَعۡدَ ذَٰلِكَ ظَهِيرٌ

4. Soki botubeli epai ya Allah, mitema na bino mipetuami, kasi soki bosalisani likolo naye, boyeba ete ya solo Allah azali mobateli naye, mpe anzelu Djibril lokola elongo na bandimi ya malamu, Mpe na sima ba anzelu bakosunga ye. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 66

عَسَىٰ رَبُّهُۥٓ إِن طَلَّقَكُنَّ أَن يُبۡدِلَهُۥٓ أَزۡوَٰجًا خَيۡرٗا مِّنكُنَّ مُسۡلِمَٰتٖ مُّؤۡمِنَٰتٖ قَٰنِتَٰتٖ تَٰٓئِبَٰتٍ عَٰبِدَٰتٖ سَٰٓئِحَٰتٖ ثَيِّبَٰتٖ وَأَبۡكَارٗا

5. Soki atiki bino, Nkolo naye akobalisa ye basi ya malamu koleka bino, bamisokia, bandimi, bazali na botosi, batubelaka, baye bazali kosambela, bakangi ya ngizi, baye babala liboso, mpe bangondo (baye bayebi mibali te) te. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 66

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ قُوٓاْ أَنفُسَكُمۡ وَأَهۡلِيكُمۡ نَارٗا وَقُودُهَا ٱلنَّاسُ وَٱلۡحِجَارَةُ عَلَيۡهَا مَلَٰٓئِكَةٌ غِلَاظٞ شِدَادٞ لَّا يَعۡصُونَ ٱللَّهَ مَآ أَمَرَهُمۡ وَيَفۡعَلُونَ مَا يُؤۡمَرُونَ

6. Oh bino bandimi! Bobatela milimo na bino mpe mabota na bino na moto oyo bankoni na yango bikozala bato na mabanga, bakengeli na yango ezali ba anzelu ya makasi, bazangisaka Allah botosi te na oyo atindi bango kosala, kasi bakokisaka nde oyo atindi bango kosala. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 66

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَا تَعۡتَذِرُواْ ٱلۡيَوۡمَۖ إِنَّمَا تُجۡزَوۡنَ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ

7. Eh bino bapengwi! lelo bakolimbisa bino te, ya soló bokofutama kolandana na maye bosalaki. info
التفاسير: