పవిత్ర ఖురాన్ యొక్క భావార్థాల అనువాదం - లింగాల అనువాదం - ముహమ్మద్ బల్నుగు

పేజీ నెంబరు:close

external-link copy
6 : 22

ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡحَقُّ وَأَنَّهُۥ يُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَأَنَّهُۥ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ

6. Wana nyoso mpo Allah azali wa bosôló, mpe ya soló ye mosekwisi ya bawa, mpe ya soló, ye azali na bokoki тропа biloko binso. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 22

وَأَنَّ ٱلسَّاعَةَ ءَاتِيَةٞ لَّا رَيۡبَ فِيهَا وَأَنَّ ٱللَّهَ يَبۡعَثُ مَن فِي ٱلۡقُبُورِ

7. Mpe ya sólo, ngonga ekokoma ezali na tembe te тропа yango. Mpe ya sólo Allah akosekwisaka baye bakozalaka o kati ya malita. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 22

وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يُجَٰدِلُ فِي ٱللَّهِ بِغَيۡرِ عِلۡمٖ وَلَا هُدٗى وَلَا كِتَٰبٖ مُّنِيرٖ

8. Mpe kati ya bato bazali kosuana тропа Allah, kasi bazali na boyebi te, mpe bazali na bokambami te, mpe bazali na buku oyo elimbolami te. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 22

ثَانِيَ عِطۡفِهِۦ لِيُضِلَّ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۖ لَهُۥ فِي ٱلدُّنۡيَا خِزۡيٞۖ وَنُذِيقُهُۥ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ عَذَابَ ٱلۡحَرِيقِ

9. Azui bizaleli ya lolendo mpe ya mabe тропа kobungisa bato nzela ya Allah, (moto) wana akozua mabe awa na nsé тре о mokolo ya suka tokopesa ye etumbu ya kozikisama. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 22

ذَٰلِكَ بِمَا قَدَّمَتۡ يَدَاكَ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَيۡسَ بِظَلَّٰمٖ لِّلۡعَبِيدِ

10. Mpona makambo maye maboko mibale nayo malengelaki yango awa na mokili, mpe ya sôló Allah azalaka mobubi te epai ya bawumbu naye. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 22

وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يَعۡبُدُ ٱللَّهَ عَلَىٰ حَرۡفٖۖ فَإِنۡ أَصَابَهُۥ خَيۡرٌ ٱطۡمَأَنَّ بِهِۦۖ وَإِنۡ أَصَابَتۡهُ فِتۡنَةٌ ٱنقَلَبَ عَلَىٰ وَجۡهِهِۦ خَسِرَ ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةَۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡخُسۡرَانُ ٱلۡمُبِينُ

11. Mpe kati na bato bazali kobondela Allah sé moke тре likolo likolo, soki bolamu bozui ye, asepeli na yango, mpe soki mabe ezui ye abaloli elongi mpe aboyi, kasi asili kozanga na mokili mpe na mokolo mwa suka. Мре wana nde ekozalaka bozangi ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 22

يَدۡعُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَضُرُّهُۥ وَمَا لَا يَنفَعُهُۥۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلضَّلَٰلُ ٱلۡبَعِيدُ

12. Bazali kobelela na esika ya Allah banzambe basusu, ba oyo bakoki kosala bango mabe te mpe malamu te. Wana nde libunga lia mozindo. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 22

يَدۡعُواْ لَمَن ضَرُّهُۥٓ أَقۡرَبُ مِن نَّفۡعِهِۦۚ لَبِئۡسَ ٱلۡمَوۡلَىٰ وَلَبِئۡسَ ٱلۡعَشِيرُ

13. Bazali kobelela oyo ezali mosika na litomba kasi pene na mpasi. Oyo mobateli ya mabe mpe moninga ya mabe. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 22

إِنَّ ٱللَّهَ يُدۡخِلُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۚ إِنَّ ٱللَّهَ يَفۡعَلُ مَا يُرِيدُ

14. Ya soló, Allah akokotisa bandimi baye bazalaki kosala misala ya malamu na lola oyo ezali kolekisa na nsé na yango mingala. Ya soló, Allah asalaka oyo alingi. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 22

مَن كَانَ يَظُنُّ أَن لَّن يَنصُرَهُ ٱللَّهُ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ فَلۡيَمۡدُدۡ بِسَبَبٍ إِلَى ٱلسَّمَآءِ ثُمَّ لۡيَقۡطَعۡ فَلۡيَنظُرۡ هَلۡ يُذۡهِبَنَّ كَيۡدُهُۥ مَا يَغِيظُ

15. Oyo azali kokanisa ete Allah akosalisa(1) ye te awa na mokili mpe na mokolo ya suka, amata na singa kino likolo(2), sima akata yango, boye atala soki mayele mabe naye ekosalisa ye na oyo ezali kopesa ye kanda. info

1 Akosalisa ye: Awa elakisi ntoma Muhammad.
2 Likolo: Awa ezali ete kokanga singa likolo ya ndako naye mpe atia yango na kingo тропа akata yango mpo amiboma.

التفاسير: