పవిత్ర ఖురాన్ యొక్క భావార్థాల అనువాదం - లింగాల అనువాదం - ముహమ్మద్ బల్నుగు

పేజీ నెంబరు:close

external-link copy
13 : 20

وَأَنَا ٱخۡتَرۡتُكَ فَٱسۡتَمِعۡ لِمَا يُوحَىٰٓ

13. Mpe naponi yo, yoka maye bakoyebisa yo. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 20

إِنَّنِيٓ أَنَا ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّآ أَنَا۠ فَٱعۡبُدۡنِي وَأَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَ لِذِكۡرِيٓ

14. Ya sólo penza, ngai nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ngai, bondela ngai mpe telemisa losambo тропа kokanisa ngai. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 20

إِنَّ ٱلسَّاعَةَ ءَاتِيَةٌ أَكَادُ أُخۡفِيهَا لِتُجۡزَىٰ كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا تَسۡعَىٰ

15. Ya soló, ntango ya suka ekoya, na bombi yango mpo ete molimo na molimo afutama na mpiko naye. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 20

فَلَا يَصُدَّنَّكَ عَنۡهَا مَن لَّا يُؤۡمِنُ بِهَا وَٱتَّبَعَ هَوَىٰهُ فَتَرۡدَىٰ

16. Kasi oyo andimi na yango te mpe alandi sé mposa naye, abungisa yo te noki te okobebisama. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 20

وَمَا تِلۡكَ بِيَمِينِكَ يَٰمُوسَىٰ

17. Mpe nini boye ezali na loboko nayo ya mobali oh Mûssa? info
التفاسير:

external-link copy
18 : 20

قَالَ هِيَ عَصَايَ أَتَوَكَّؤُاْ عَلَيۡهَا وَأَهُشُّ بِهَا عَلَىٰ غَنَمِي وَلِيَ فِيهَا مَـَٔارِبُ أُخۡرَىٰ

18. Alobi: Ezali nde lingenda lia ngai, nayekemelaka yango,(1) mpe esalisaka ngai na bobuki bakasa ya banzete тропа koleisa banyama na ngai, mpe esalisaka ngai na makambo mosusu. info

1 Komisimba na yango tango ya bopemi.

التفاسير:

external-link copy
19 : 20

قَالَ أَلۡقِهَا يَٰمُوسَىٰ

19. (Allah ayebisi ye): Bwaka yango oh Mûssa! info
التفاسير:

external-link copy
20 : 20

فَأَلۡقَىٰهَا فَإِذَا هِيَ حَيَّةٞ تَسۡعَىٰ

20. Мре abwaki yango, mpe ebongwani nyoka ebandi kotambola. info
التفاسير:

external-link copy
21 : 20

قَالَ خُذۡهَا وَلَا تَخَفۡۖ سَنُعِيدُهَا سِيرَتَهَا ٱلۡأُولَىٰ

21. (Allah) alobi: Zua yango, kaši kobanga te, tokozongisa yango na lolenge ezalaki liboso. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 20

وَٱضۡمُمۡ يَدَكَ إِلَىٰ جَنَاحِكَ تَخۡرُجۡ بَيۡضَآءَ مِنۡ غَيۡرِ سُوٓءٍ ءَايَةً أُخۡرَىٰ

22. Mpe kanga loboko nayo na nsé ya lipeka, ekobima na bongengi ya mpembe makasi mpe ekosala mpasi te. Wana elembo mosusu (bikamwa). info
التفاسير:

external-link copy
23 : 20

لِنُرِيَكَ مِنۡ ءَايَٰتِنَا ٱلۡكُبۡرَى

23. Mpo tolakisa yo makamwisi ma biso ya minene. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 20

ٱذۡهَبۡ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ إِنَّهُۥ طَغَىٰ

24. Kende epai ya falo, ya soló ye asili kolekisa ndelo, info
التفاسير:

external-link copy
25 : 20

قَالَ رَبِّ ٱشۡرَحۡ لِي صَدۡرِي

25. (Mûssa) alobi: Nkolo wa ngai, fungóla ntolo na ngai,(1) info

1 Fungóla ntolo na ngai: Elakisi: Tia motema na nga eyamba emoniseli

التفاسير:

external-link copy
26 : 20

وَيَسِّرۡ لِيٓ أَمۡرِي

26. Mpe etinda na ngai oyo, tia yango ezala mpete, info
التفاسير:

external-link copy
27 : 20

وَٱحۡلُلۡ عُقۡدَةٗ مِّن لِّسَانِي

27. Mpe bongisa elobeli na ngai. info
التفاسير:

external-link copy
28 : 20

يَفۡقَهُواْ قَوۡلِي

28. Mpo bakoka kososola maloba na ngai. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 20

وَٱجۡعَل لِّي وَزِيرٗا مِّنۡ أَهۡلِي

29. Mpe pesa ngai mosalisi awuta na libota lia ngai. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 20

هَٰرُونَ أَخِي

30. Hâruna ndeko wa ngai, info
التفاسير:

external-link copy
31 : 20

ٱشۡدُدۡ بِهِۦٓ أَزۡرِي

31. Тіа ye azala oyo akobakisela ngai nguya, info
التفاسير:

external-link copy
32 : 20

وَأَشۡرِكۡهُ فِيٓ أَمۡرِي

32. Kotisa ye na makambo na ngai (tokoma mibale), info
التفاسير:

external-link copy
33 : 20

كَيۡ نُسَبِّحَكَ كَثِيرٗا

33. Mpo tokumisa yo koleka, info
التفاسير:

external-link copy
34 : 20

وَنَذۡكُرَكَ كَثِيرًا

34. Mpe tokanisa yo mingi, info
التفاسير:

external-link copy
35 : 20

إِنَّكَ كُنتَ بِنَا بَصِيرٗا

35. Ya soló, ozali kornona biso. info
التفاسير:

external-link copy
36 : 20

قَالَ قَدۡ أُوتِيتَ سُؤۡلَكَ يَٰمُوسَىٰ

36. (Allah) alobi: Oh Müssa bosenga nayo esili kokokisama. info
التفاسير:

external-link copy
37 : 20

وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَيۡكَ مَرَّةً أُخۡرَىٰٓ

37. Mpe tosilaka kosalisa yo mbala ya yambo. info
التفاسير: