அல்குர்ஆன் மொழிபெயர்ப்பு - லிங்காலா மொழிபெயர்ப்பு - முஹம்மது பலன்கோகோ

Al-A’râf

external-link copy
1 : 7

الٓمٓصٓ

1. Alif, lâm, mîm, swâd(1). info

1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo 1.

التفاسير:

external-link copy
2 : 7

كِتَٰبٌ أُنزِلَ إِلَيۡكَ فَلَا يَكُن فِي صَدۡرِكَ حَرَجٞ مِّنۡهُ لِتُنذِرَ بِهِۦ وَذِكۡرَىٰ لِلۡمُؤۡمِنِينَ

2. Buku eye ekitelaki yo. Mpe likambo moko te litungisa motema nayo kowuta na kobanga, mpo ete okebisa na yango, mpe ezali liteya тропа bandimi. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 7

ٱتَّبِعُواْ مَآ أُنزِلَ إِلَيۡكُم مِّن رَّبِّكُمۡ وَلَا تَتَّبِعُواْ مِن دُونِهِۦٓ أَوۡلِيَآءَۗ قَلِيلٗا مَّا تَذَكَّرُونَ

3. Bolanda maye makitelaki bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, mpe bolanda basusu te sé ye. Bozali kokanisa sé токе. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 7

وَكَم مِّن قَرۡيَةٍ أَهۡلَكۡنَٰهَا فَجَآءَهَا بَأۡسُنَا بَيَٰتًا أَوۡ هُمۡ قَآئِلُونَ

4. Mpe bamboka boni tobomaka yango! Mpe tango etumbu na biso eyelaki bango na butu, to тре bazalaki na bopemi ya токе na moyi. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 7

فَمَا كَانَ دَعۡوَىٰهُمۡ إِذۡ جَآءَهُم بَأۡسُنَآ إِلَّآ أَن قَالُوٓاْ إِنَّا كُنَّا ظَٰلِمِينَ

5. Mpe kosenga na bango tango etumbu na biso eyelaki bango balobaki; ya soló, tozalaki babubi. (balekisi ndelo). info
التفاسير:

external-link copy
6 : 7

فَلَنَسۡـَٔلَنَّ ٱلَّذِينَ أُرۡسِلَ إِلَيۡهِمۡ وَلَنَسۡـَٔلَنَّ ٱلۡمُرۡسَلِينَ

6. Mpe tokotunaka ya sólo baye totindelaki bango batindami, mpe ya sólo, tokotunaka batindami. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 7

فَلَنَقُصَّنَّ عَلَيۡهِم بِعِلۡمٖۖ وَمَا كُنَّا غَآئِبِينَ

7. Mpe tokoyebisaka bango na boyebi bonso, kasi mabombamelaki biso te. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 7

وَٱلۡوَزۡنُ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡحَقُّۚ فَمَن ثَقُلَتۡ مَوَٰزِينُهُۥ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ

8. Мре emekelo ekomekama na bosembo mokolo wana, mpe oyo emekelo naye ekozalaka na kilo. Baye wana nde balongi. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 7

وَمَنۡ خَفَّتۡ مَوَٰزِينُهُۥ فَأُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُم بِمَا كَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا يَظۡلِمُونَ

9. Mpe na oyo emekelo naye ekozala fafala, baye bana nde bamizangisaki bango moko kowuta na maye bazalaki kobuba na mikapo (bilembo) mia biso. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 7

وَلَقَدۡ مَكَّنَّٰكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَجَعَلۡنَا لَكُمۡ فِيهَا مَعَٰيِشَۗ قَلِيلٗا مَّا تَشۡكُرُونَ

10. Mpe tosilaki kopesa bino bokonzi ya kofanda na mabele mpe totielaki bino libiki ya bomoyi o kati na yango, kasi токе nde bozali kotondo. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 7

وَلَقَدۡ خَلَقۡنَٰكُمۡ ثُمَّ صَوَّرۡنَٰكُمۡ ثُمَّ قُلۡنَا لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ ٱسۡجُدُواْ لِأٓدَمَ فَسَجَدُوٓاْ إِلَّآ إِبۡلِيسَ لَمۡ يَكُن مِّنَ ٱلسَّٰجِدِينَ

11. Mpe na bosóló tosilaki kokela bino, sima topesi bino lolenge, mpe sima toyebisaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, тре bagumbamaki, longola sé ibilisa(1) azalaki te o kati ya bagumbami. info

1 Sátana, zábulu.

التفاسير: