அல்குர்ஆன் மொழிபெயர்ப்பு - லிங்காலா மொழிபெயர்ப்பு - முஹம்மது பலன்கோகோ

பக்க எண்:close

external-link copy
6 : 30

وَعۡدَ ٱللَّهِۖ لَا يُخۡلِفُ ٱللَّهُ وَعۡدَهُۥ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ

6. Wana nde elaka ya Allah, Allah azangisaka elaka naye te. Kasi ebele ya bato bazali koyeba te. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 30

يَعۡلَمُونَ ظَٰهِرٗا مِّنَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَهُمۡ عَنِ ٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ غَٰفِلُونَ

7. Bazali sé koyeba bomoyi ya mokili mpe babosani oyo ya mokolo mwa suka. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 30

أَوَلَمۡ يَتَفَكَّرُواْ فِيٓ أَنفُسِهِمۗ مَّا خَلَقَ ٱللَّهُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَآ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَأَجَلٖ مُّسَمّٗىۗ وَإِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلنَّاسِ بِلِقَآيِٕ رَبِّهِمۡ لَكَٰفِرُونَ

8. Bakanisaka тропа bango moko te?! Allah akelaki te likolo na mabele na nyoso oyo ezali kati na yango mibale mpe akokisaki yango sé na bosôló тре тропа mikolo miyebani. Мре ya soló, bato ebele bazali kondima na bokutani na Nkolo wa bango te. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 30

أَوَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَانُوٓاْ أَشَدَّ مِنۡهُمۡ قُوَّةٗ وَأَثَارُواْ ٱلۡأَرۡضَ وَعَمَرُوهَآ أَكۡثَرَ مِمَّا عَمَرُوهَا وَجَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِۖ فَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيَظۡلِمَهُمۡ وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ

9. Boye bazali kotambola na mokili te, batala lolenge basalaki na bato ya liboso na bango? Bazalaki na bokasi mingi koleka bango, тре basalelaki mabele mingi na kolona mpe kotonga, batindami na bango bayelaki bango bilembo? Allah abubaki bango te, kasi bango moko nde bamibubaki. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 30

ثُمَّ كَانَ عَٰقِبَةَ ٱلَّذِينَ أَسَٰٓـُٔواْ ٱلسُّوٓأَىٰٓ أَن كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَكَانُواْ بِهَا يَسۡتَهۡزِءُونَ

10. Na yango suka ya mabe ekozongela baye basalaki mabe, na koboya mikapo mia Allah, mpe bazalaki kozua yango na liseki. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 30

ٱللَّهُ يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ ثُمَّ إِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ

11. Allah nde abandaka bokeli mpe sima azongeli yango, mpe epai naye nde bokozongisama. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 30

وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يُبۡلِسُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ

12. Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, batomboki bakozangaka elikia. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 30

وَلَمۡ يَكُن لَّهُم مِّن شُرَكَآئِهِمۡ شُفَعَٰٓؤُاْ وَكَانُواْ بِشُرَكَآئِهِمۡ كَٰفِرِينَ

13. Mpe bakozuaka baye bakosalisaka bango te okati ya basangisi ba bango, mpe bakoyebaka banzambe na bango lisusu te. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 30

وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يَوۡمَئِذٖ يَتَفَرَّقُونَ

14. Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, bakokabwanaka. (bango na bango). info
التفاسير:

external-link copy
15 : 30

فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَهُمۡ فِي رَوۡضَةٖ يُحۡبَرُونَ

15. Kasi тропа baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bosepeli o kati na lola. info
التفاسير: