पवित्र कुरअानको अर्थको अनुवाद - लिंगाला अनुवाद : मुहम्मद बालेङ्गोगो ।

رقم الصفحة:close

external-link copy
94 : 9

يَعۡتَذِرُونَ إِلَيۡكُمۡ إِذَا رَجَعۡتُمۡ إِلَيۡهِمۡۚ قُل لَّا تَعۡتَذِرُواْ لَن نُّؤۡمِنَ لَكُمۡ قَدۡ نَبَّأَنَا ٱللَّهُ مِنۡ أَخۡبَارِكُمۡۚ وَسَيَرَى ٱللَّهُ عَمَلَكُمۡ وَرَسُولُهُۥ ثُمَّ تُرَدُّونَ إِلَىٰ عَٰلِمِ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ

94. Bazali kosenga bino bolimbisi soki bozongeli bango (kowuta na bitumba). Loba: Bosenga bolimbisi te, tokoki kondimela bino te. Allah asilaki soló koyebisa biso ba sango na bino. Mpe Allah akotalaka misala та bino, na motindami waye lokola, sima bokozongaka epai ya oyo ayebaka makambo ma polele na maye mabombami mpe akoyebisaka bino maye bozalaki kosala. info
التفاسير:

external-link copy
95 : 9

سَيَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ لَكُمۡ إِذَا ٱنقَلَبۡتُمۡ إِلَيۡهِمۡ لِتُعۡرِضُواْ عَنۡهُمۡۖ فَأَعۡرِضُواْ عَنۡهُمۡۖ إِنَّهُمۡ رِجۡسٞۖ وَمَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُ جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ

95. Bakolapela bino ndayi na nkombo ya Allah na bozongi na bino été boleka epai na bango, mpo bolimbisa, bozala mosika na bango! Ya soló, bango bazali mbindo, mpe esika na bango ekozala nde o moto ya lifelo, lifuta lia maye bazalaki kosala. info
التفاسير:

external-link copy
96 : 9

يَحۡلِفُونَ لَكُمۡ لِتَرۡضَوۡاْ عَنۡهُمۡۖ فَإِن تَرۡضَوۡاْ عَنۡهُمۡ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يَرۡضَىٰ عَنِ ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡفَٰسِقِينَ

96. Bazali kolapela bino ndayi mpo bosepela na bango. Kasi soki bosepeli na bango, ya soló Allah asepelaka na babebisi te. info
التفاسير:

external-link copy
97 : 9

ٱلۡأَعۡرَابُ أَشَدُّ كُفۡرٗا وَنِفَاقٗا وَأَجۡدَرُ أَلَّا يَعۡلَمُواْ حُدُودَ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ عَلَىٰ رَسُولِهِۦۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ

97. Ba arabo,(1) bazalaki na bopagano makasi koleka, mpe kozala bato ya bilongi mibale mpe bato ya liboso ya koboya mibeko miye Allah akitisaki epai ya motindami waye. Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya. info

1 Bato ya Bamboka.

التفاسير:

external-link copy
98 : 9

وَمِنَ ٱلۡأَعۡرَابِ مَن يَتَّخِذُ مَا يُنفِقُ مَغۡرَمٗا وَيَتَرَبَّصُ بِكُمُ ٱلدَّوَآئِرَۚ عَلَيۡهِمۡ دَآئِرَةُ ٱلسَّوۡءِۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٞ

98. Mpe o kati ya ba arabo basusu bazali kozua maye bazali kobimisa lokola nyongo mpe bazali kozela mabe ezua bino, mabe ya makasi ekozua nde bango! Mpe Allah azali moyoki atonda boyebi. info
التفاسير:

external-link copy
99 : 9

وَمِنَ ٱلۡأَعۡرَابِ مَن يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَيَتَّخِذُ مَا يُنفِقُ قُرُبَٰتٍ عِندَ ٱللَّهِ وَصَلَوَٰتِ ٱلرَّسُولِۚ أَلَآ إِنَّهَا قُرۡبَةٞ لَّهُمۡۚ سَيُدۡخِلُهُمُ ٱللَّهُ فِي رَحۡمَتِهِۦٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ

99. Мре lisusu о kati ya ba arabo basusu bazali kondima na Allah mpe na mokolo mwa suka, mpe bazali kozua mabonza maye bazali kobimisa na nzela ya bopusani pene ya Allah, mpo été azua litomba ya mabondeli ya motindami. Ya sôló, wana mbeka тропа bango epai na Allah. Мре Allah akokotisaka bango na nsé ya ngolu naye, ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu. info
التفاسير: