पवित्र कुरअानको अर्थको अनुवाद - लिंगाला अनुवाद : मुहम्मद बालेङ्गोगो ।

رقم الصفحة:close

external-link copy
187 : 2

أُحِلَّ لَكُمۡ لَيۡلَةَ ٱلصِّيَامِ ٱلرَّفَثُ إِلَىٰ نِسَآئِكُمۡۚ هُنَّ لِبَاسٞ لَّكُمۡ وَأَنتُمۡ لِبَاسٞ لَّهُنَّۗ عَلِمَ ٱللَّهُ أَنَّكُمۡ كُنتُمۡ تَخۡتَانُونَ أَنفُسَكُمۡ فَتَابَ عَلَيۡكُمۡ وَعَفَا عَنكُمۡۖ فَٱلۡـَٰٔنَ بَٰشِرُوهُنَّ وَٱبۡتَغُواْ مَا كَتَبَ ٱللَّهُ لَكُمۡۚ وَكُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ حَتَّىٰ يَتَبَيَّنَ لَكُمُ ٱلۡخَيۡطُ ٱلۡأَبۡيَضُ مِنَ ٱلۡخَيۡطِ ٱلۡأَسۡوَدِ مِنَ ٱلۡفَجۡرِۖ ثُمَّ أَتِمُّواْ ٱلصِّيَامَ إِلَى ٱلَّيۡلِۚ وَلَا تُبَٰشِرُوهُنَّ وَأَنتُمۡ عَٰكِفُونَ فِي ٱلۡمَسَٰجِدِۗ تِلۡكَ حُدُودُ ٱللَّهِ فَلَا تَقۡرَبُوهَاۗ كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ ءَايَٰتِهِۦ لِلنَّاسِ لَعَلَّهُمۡ يَتَّقُونَ

187. Elingisami mpona bino kosangana na basi na bino o butu bwa ngizi; bango bazali bilamba bia bino. Bino bozali bilamba bia bango. Allah ayebi ya sôló bino bozalaki kosala yango na kobombana mpe ayambi tubela na bino mpe alimbisi bino. Mpe sik’oyo bosangana na bango mpe boluka bolamu na maye Allah asali mpona bino. Mpe bolia mpe bomela kino boyeba bokeseni ya tongo na butu. Sima bokokisa ngizi kino butu. Bosangana na bango te na bino bozali ya kobombana okati ya ba masâdjid(1). Mpe wana ezali ndelo ya Allah. Bopusana mpembeni na yango te. Na boye nde Allah azali kolakisa polele bilembo bia ye mpona bato, mpo ete bakoka kobanga. info

1 Al-Baqarah: 114.

التفاسير:

external-link copy
188 : 2

وَلَا تَأۡكُلُوٓاْ أَمۡوَٰلَكُم بَيۡنَكُم بِٱلۡبَٰطِلِ وَتُدۡلُواْ بِهَآ إِلَى ٱلۡحُكَّامِ لِتَأۡكُلُواْ فَرِيقٗا مِّنۡ أَمۡوَٰلِ ٱلنَّاسِ بِٱلۡإِثۡمِ وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ

188. Mpe bolia misolo mia bino te kati na bino na lolenge ya mabe, mpe bosalisa te bazuzi na bofuti bango kanyaka(1) mpona kolia ndambu ya misolo mia bato na mabe, mpe bino boyebi. info

1 Nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye Allah.

التفاسير:

external-link copy
189 : 2

۞ يَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلۡأَهِلَّةِۖ قُلۡ هِيَ مَوَٰقِيتُ لِلنَّاسِ وَٱلۡحَجِّۗ وَلَيۡسَ ٱلۡبِرُّ بِأَن تَأۡتُواْ ٱلۡبُيُوتَ مِن ظُهُورِهَا وَلَٰكِنَّ ٱلۡبِرَّ مَنِ ٱتَّقَىٰۗ وَأۡتُواْ ٱلۡبُيُوتَ مِنۡ أَبۡوَٰبِهَاۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تُفۡلِحُونَ

189. Bazali kotuna yo na ntina ya basanza ya sika, loba ete: Yango bizali kosalisa bato mpona koyeba bangonga mpe mpona hajj. Ezali lolenge ya malamu te ete bozonga epai na bino sima ya mikongo ya bandako. Kasi lolenge ya malamu ezali na moto oyo azali kobanga (Allah). Bokota na bandako na minoko na yango mpe bobanga Allah mpo ete bolonga! info
التفاسير:

external-link copy
190 : 2

وَقَٰتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ ٱلَّذِينَ يُقَٰتِلُونَكُمۡ وَلَا تَعۡتَدُوٓاْۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلۡمُعۡتَدِينَ

190. Mpe bobundisa baye bazali kobundisa bino na nzela ya Allah, mpe bolekisa ndelo te; ya sôló Allah alingaka te baye bazali kolekisa ndelo. info
التفاسير: