വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ

At-Twalâq

external-link copy
1 : 65

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ إِذَا طَلَّقۡتُمُ ٱلنِّسَآءَ فَطَلِّقُوهُنَّ لِعِدَّتِهِنَّ وَأَحۡصُواْ ٱلۡعِدَّةَۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ رَبَّكُمۡۖ لَا تُخۡرِجُوهُنَّ مِنۢ بُيُوتِهِنَّ وَلَا يَخۡرُجۡنَ إِلَّآ أَن يَأۡتِينَ بِفَٰحِشَةٖ مُّبَيِّنَةٖۚ وَتِلۡكَ حُدُودُ ٱللَّهِۚ وَمَن يَتَعَدَّ حُدُودَ ٱللَّهِ فَقَدۡ ظَلَمَ نَفۡسَهُۥۚ لَا تَدۡرِي لَعَلَّ ٱللَّهَ يُحۡدِثُ بَعۡدَ ذَٰلِكَ أَمۡرٗا

1. Oh ntoma! Soki bolingi kokabwana na basi, bokabwana na bango o sima ya eleko na bango mpe botanga yango, bobanga Allah Nkolo wa bino mpe bobimisa bango na bandako te, longola sé soki basali mabe oyo emonani polele. Wana ezali mibeko mia Allah. Mpe oyo akotosa mibeko mia Allah te, amisali mabe sé ye moko. Oyebi te sima na yango, Allah akobimisa eloko ya sika. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 65

فَإِذَا بَلَغۡنَ أَجَلَهُنَّ فَأَمۡسِكُوهُنَّ بِمَعۡرُوفٍ أَوۡ فَارِقُوهُنَّ بِمَعۡرُوفٖ وَأَشۡهِدُواْ ذَوَيۡ عَدۡلٖ مِّنكُمۡ وَأَقِيمُواْ ٱلشَّهَٰدَةَ لِلَّهِۚ ذَٰلِكُمۡ يُوعَظُ بِهِۦ مَن كَانَ يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِۚ وَمَن يَتَّقِ ٱللَّهَ يَجۡعَل لَّهُۥ مَخۡرَجٗا

2. Mpe soki bakomi na suka ya mikolo miye mipesamaki bango тропа kozela, bozongela bango na libala na ndenge ya malamu, to mpe boboya bango na lolenge ya malamu, mpe bozua banzeneneke mibale ya mibali ya malamu mpe ya bosembo okati na bino, mpe bokokisa bonzeneneke тропа Allah. Wana ezali bolendisi тропа bino na moto oyo andimi na Allah mpe na mokolo ya suka. Mpe moto oyo abangi Allah, akofungola ye nzela. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 65

وَيَرۡزُقۡهُ مِنۡ حَيۡثُ لَا يَحۡتَسِبُۚ وَمَن يَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِ فَهُوَ حَسۡبُهُۥٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ بَٰلِغُ أَمۡرِهِۦۚ قَدۡ جَعَلَ ٱللَّهُ لِكُلِّ شَيۡءٖ قَدۡرٗا

3. Мре akopesa ye bozui oyo akanaki yango te. Oyo akomipesa na Allah, asili kokoka ye. Ya soló, Allah azali kokokisa mibeko naye. Allah asila kotia eloko nyoso emekelo na yango. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 65

وَٱلَّٰٓـِٔي يَئِسۡنَ مِنَ ٱلۡمَحِيضِ مِن نِّسَآئِكُمۡ إِنِ ٱرۡتَبۡتُمۡ فَعِدَّتُهُنَّ ثَلَٰثَةُ أَشۡهُرٖ وَٱلَّٰٓـِٔي لَمۡ يَحِضۡنَۚ وَأُوْلَٰتُ ٱلۡأَحۡمَالِ أَجَلُهُنَّ أَن يَضَعۡنَ حَمۡلَهُنَّۚ وَمَن يَتَّقِ ٱللَّهَ يَجۡعَل لَّهُۥ مِنۡ أَمۡرِهِۦ يُسۡرٗا

4. Soki bobosani bileko bia basi na bino baye bazali lisusu na elikia ya makila te, to mpe ba oyo naino bamoni makila te, eleko na bango ya kozela ezali sanza misato, kasi тропа ba oyo bazali na zemi, bakozela kino bakobota. Mpe moto oyo abangi Allah, (Allah) akolembisa makambo naye. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 65

ذَٰلِكَ أَمۡرُ ٱللَّهِ أَنزَلَهُۥٓ إِلَيۡكُمۡۚ وَمَن يَتَّقِ ٱللَّهَ يُكَفِّرۡ عَنۡهُ سَيِّـَٔاتِهِۦ وَيُعۡظِمۡ لَهُۥٓ أَجۡرًا

5. Wana ezali mobeko ya Allah oyo akitisa yango epai na bino. Mpe oyo akobanga Allah, akolimbisa masumu naye, mpe akokolisa bolamu naye. info
التفاسير: