വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ

പേജ് നമ്പർ:close

external-link copy
98 : 11

يَقۡدُمُ قَوۡمَهُۥ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فَأَوۡرَدَهُمُ ٱلنَّارَۖ وَبِئۡسَ ٱلۡوِرۡدُ ٱلۡمَوۡرُودُ

98. Akozalaka liboso lia bato baye o mokolo mwa suka, mpe akomemaka bango na moto. Nde oyo suka ya liziba ya mabe. info
التفاسير:

external-link copy
99 : 11

وَأُتۡبِعُواْ فِي هَٰذِهِۦ لَعۡنَةٗ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۚ بِئۡسَ ٱلرِّفۡدُ ٱلۡمَرۡفُودُ

99. Mpe botutu ekolanda bango awa na nsé, mpe na mokolo ya suka lokola. Mpe oyo likabo mabe bakopesama! info
التفاسير:

external-link copy
100 : 11

ذَٰلِكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡقُرَىٰ نَقُصُّهُۥ عَلَيۡكَۖ مِنۡهَا قَآئِمٞ وَحَصِيدٞ

100. Wana nde ba sango ya bituka tozali kopesa yo, (Muhammad), kati na yango misusu mizali kino moyi mwa lelo, mpe misusu misilaki kolimwa kala. info
التفاسير:

external-link copy
101 : 11

وَمَا ظَلَمۡنَٰهُمۡ وَلَٰكِن ظَلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡۖ فَمَآ أَغۡنَتۡ عَنۡهُمۡ ءَالِهَتُهُمُ ٱلَّتِي يَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مِن شَيۡءٖ لَّمَّا جَآءَ أَمۡرُ رَبِّكَۖ وَمَا زَادُوهُمۡ غَيۡرَ تَتۡبِيبٖ

101. Tobubaki bango te kasi bango moko bamibubaki. Mpona banzambe na bango baye bazalaki kobondela batiki Allah, esalisaki bango na eloko te tango mobeko mwa Nkolo wayo moyaki, kasi ebakiselaki bango sé bozangi. info
التفاسير:

external-link copy
102 : 11

وَكَذَٰلِكَ أَخۡذُ رَبِّكَ إِذَآ أَخَذَ ٱلۡقُرَىٰ وَهِيَ ظَٰلِمَةٌۚ إِنَّ أَخۡذَهُۥٓ أَلِيمٞ شَدِيدٌ

102. Ndenge wana nde Nkolo wayo asalaka, soki alingi kobeta mboka ya babubi. Ya soló, etumbu naye ezalaka mpasi mpe makasi. info
التفاسير:

external-link copy
103 : 11

إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّمَنۡ خَافَ عَذَابَ ٱلۡأٓخِرَةِۚ ذَٰلِكَ يَوۡمٞ مَّجۡمُوعٞ لَّهُ ٱلنَّاسُ وَذَٰلِكَ يَوۡمٞ مَّشۡهُودٞ

103. Wana ezali solo elembo na oyo akobanga etumbu ya mokolo ya suka. Mokolo moye bato bakosanganaka, mpe mokolo wana nde ekotatolama. info
التفاسير:

external-link copy
104 : 11

وَمَا نُؤَخِّرُهُۥٓ إِلَّا لِأَجَلٖ مَّعۡدُودٖ

104. Mpe tokozelisaka yango te, sé na tango eye etiyamaki. info
التفاسير:

external-link copy
105 : 11

يَوۡمَ يَأۡتِ لَا تَكَلَّمُ نَفۡسٌ إِلَّا بِإِذۡنِهِۦۚ فَمِنۡهُمۡ شَقِيّٞ وَسَعِيدٞ

105. Mokolo moye ata molimo moko te akolobaka, sé na ndingisa naye kati na bango bakolelaka mpe basusu bakosepelaka. info
التفاسير:

external-link copy
106 : 11

فَأَمَّا ٱلَّذِينَ شَقُواْ فَفِي ٱلنَّارِ لَهُمۡ فِيهَا زَفِيرٞ وَشَهِيقٌ

106. Soki тропа bato ya mpasi, bakozala na moto wapi epai bakonyokwama mpe bakolela makasi, info
التفاسير:

external-link copy
107 : 11

خَٰلِدِينَ فِيهَا مَا دَامَتِ ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلۡأَرۡضُ إِلَّا مَا شَآءَ رَبُّكَۚ إِنَّ رَبَّكَ فَعَّالٞ لِّمَا يُرِيدُ

107. Bakozalaka kati na yango libela, ndenge likolo na mabele ekowumela, sé kaka oyo Nkolo nayo alingi.(1) ya soló, Nkolo wayo asalaka maye alingi. info

1 Kaka oyo Nkolo nayo alingi: Allah akobimisa na lifelo bandimi oyo bakufaki na masumu mosusu kasi basangisaki Allah te na binzambi nzambi.

التفاسير:

external-link copy
108 : 11

۞ وَأَمَّا ٱلَّذِينَ سُعِدُواْ فَفِي ٱلۡجَنَّةِ خَٰلِدِينَ فِيهَا مَا دَامَتِ ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلۡأَرۡضُ إِلَّا مَا شَآءَ رَبُّكَۖ عَطَآءً غَيۡرَ مَجۡذُوذٖ

108. Mpe baye bakozala na bisengo, bakozalaka o kati ya lola libela, ndenge bowumeli ya likolo na mabele sé kaka Nkolo wayo akolinga lolenge mosusu, likabo oyo ezali kokatana te. info
التفاسير: