ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ

Ar-Ra’d

external-link copy
1 : 13

الٓمٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِۗ وَٱلَّذِيٓ أُنزِلَ إِلَيۡكَ مِن رَّبِّكَ ٱلۡحَقُّ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يُؤۡمِنُونَ

1. Alif, lâm, mím, rá.(1) wana ezali mikapo mia buku, mpe oyo ekiti epai nayo kowuta epai ya Nkolo nayo ezali bosôló. Kaši ebele ya bato bazali kondima na yango te. info

1 Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.

التفاسير:

external-link copy
2 : 13

ٱللَّهُ ٱلَّذِي رَفَعَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ بِغَيۡرِ عَمَدٖ تَرَوۡنَهَاۖ ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰ عَلَى ٱلۡعَرۡشِۖ وَسَخَّرَ ٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَۖ كُلّٞ يَجۡرِي لِأَجَلٖ مُّسَمّٗىۚ يُدَبِّرُ ٱلۡأَمۡرَ يُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لَعَلَّكُم بِلِقَآءِ رَبِّكُمۡ تُوقِنُونَ

2. Allah nde atelemisi mapata likolo na bino ezali na makonzi te, bozali kornona yango, mpe sima atombuami likolo ya ngwende. Мре akeli mwese na sanza ezali kotambola moko na moko na tango na yango, azali kokamba makambo (kotia mibeko) mpe azali kolimbola mikapo na bilembo, mpo été bobanga mpe bondima na bokutani na Nkolo wa bino. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 13

وَهُوَ ٱلَّذِي مَدَّ ٱلۡأَرۡضَ وَجَعَلَ فِيهَا رَوَٰسِيَ وَأَنۡهَٰرٗاۖ وَمِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ جَعَلَ فِيهَا زَوۡجَيۡنِ ٱثۡنَيۡنِۖ يُغۡشِي ٱلَّيۡلَ ٱلنَّهَارَۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ

3. Мре ye nde atandi mabele mpe apiki piki bangomba likolo na yango, mpe mingala mpe ba mbuma ya ndenge na ndenge, mpe akeli biloko binso mibale mibale, azali kozipa moyi na butu. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa. info
التفاسير:

external-link copy
4 : 13

وَفِي ٱلۡأَرۡضِ قِطَعٞ مُّتَجَٰوِرَٰتٞ وَجَنَّٰتٞ مِّنۡ أَعۡنَٰبٖ وَزَرۡعٞ وَنَخِيلٞ صِنۡوَانٞ وَغَيۡرُ صِنۡوَانٖ يُسۡقَىٰ بِمَآءٖ وَٰحِدٖ وَنُفَضِّلُ بَعۡضَهَا عَلَىٰ بَعۡضٖ فِي ٱلۡأُكُلِۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَعۡقِلُونَ

4. Mpe okokuta na mokili ya nsé (mabele) mapango ekangama kangama, mpe bilanga ya a’náb(1) mpe mbuma, mpe ba nzete ya tamru bibotama ebele ya kokangama esika moko. Mpe bisusu bizali na bituka kati kati na yango (biteni biteni) mayi mazali kobwakama na yango, mpe tozali kopesa elengi na misusu koleka misusu тропа kólia. Ya soló, nyoso wana ezali bilembo mpo bato basosolo. info

1 A’náb: Ezali ba mbuma ya mike mike ba liaka (raisin) bótala lisusu na suratu Al-An’ám: 99.

التفاسير:

external-link copy
5 : 13

۞ وَإِن تَعۡجَبۡ فَعَجَبٞ قَوۡلُهُمۡ أَءِذَا كُنَّا تُرَٰبًا أَءِنَّا لَفِي خَلۡقٖ جَدِيدٍۗ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِرَبِّهِمۡۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡأَغۡلَٰلُ فِيٓ أَعۡنَاقِهِمۡۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ

5. Mpe soki ozali kokamwa kasi liloba na bango nde ezali kokamwisa koleka, tango bazali koloba été: Soki tokufi mpe tokomi mputulu, boye tokozonga lisusu bikelamu ya sika? В aye wana nde bapengwi na Nkolo na bango, mpe bango nde miniololo makozalaka na bakingo na bango, bango nde bato ya moto bakozala okati na yango seko na seko. info
التفاسير: